Kati na Biblia, Nzambe apesaka ntango nyonso Nsango na Ye epai na bato ya mokili na nzela ya mosakoli ya eleko. Asololaki na Mose na nzela ya nzete ya kopela móto pe Apesaki ye etíndá ya kobimisa Baebele libanda na Ezipito. Likonzi na Móto na polele ná bilembo mosusu epesamelaki ye mpo na kotatola mosala na ye. Yoane Mobatisi ayaki na Nsango oyo elengelaki mokili mpo na boyei ya Masiya. Ezalaki ye kobatisa Nkolo Yesu na Ebale ya Yolodani, Mongongo uta na Likolo etatolaki etíndá ya Yoane ya kotalisa Mwana-Mpate ya Nzambe: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nasepeli na ye mingi.” Na mibu elandaki, Mongongo na Nkolo eyokamaki lisusu ntango Asololaki na mosakoli moko, ntango Asololaki na Polo na nzela ya Pole ebomaka miso, pe na sima, epesaki ye etíndá ya kotia mangomba na molongo. Kati na Kondimana ya Sika pe ya Kala, Nzambe alobelaka bato na Ye na nzela na mabongisi ya bibongiseli to mabongisi ya basambeli ata moke te. Alobelaka bato ntango nyonso na nzela ya moto moko: mosakoli na Ye. Pe Atatolaka basakoli yango na nzela ya bilembo ya kokamwa.
Kasi ezali ndenge nini lelo? Nzambe azali kokoba komonisa Liloba na Ye na basakoli? Bilembo ya kokamwa ezali kokoba kino lelo? Nzambe akotinda nde mosakoli ya eleko oyo kati na mokili? Eyano ezali mpenza polele: “Iyo!”
Kasi tokoyeba ndenge nini ntango mosakoli akoya? Akozala na lolenge nini? Akosala misala nini? Akopesa biso elembo nini? Akokokisa Makomi nini?
Basakoli ya kala bazalaki bato ya mpiko ya Nzambe, pe bazalaki kobanga te kotelemela bibongiseli ya basambeli. Na ntembe te, bakambi ya mangomba bazalaki ntango nyonso kotiola bango mpenza. Eliya abetaki móndengé na bibongiseli ya basambeli ya eleko na ye, atunaki bango soki Nzambe akoyamba mbeka na bango, to ya ye. Bagángaki. Basakolaki. Bapumbwaki likolo na etumbelo. Bamizokisaki bampota na bambeli. Kasi Nzambe ayokaki bango te. Eliya atombolaki miso na Likolo pe alobaki: “Tika éyebana lelo ete ozali Nzambe na Yisalaele, pe ngai nazali mosali na yo, pe nasali makambo oyo nyonso kokokana na liloba na yo.” Na sima, abengaki móto ékita longwa na Likolo mpo étumba mbeka. Mosakoli Mika atelemelaki Mokonzi ya Yisalaele, ná banganganzambe nyonso, ntango apamelaki Nganganzambe Mokonzi Zidikiya mpo asakolaki lokuta. Nganganzambe Mokonzi abetaki ye na elongi pe Mokonzi abwakaki ye na boloko mpo alobaki solo. Ata Nkolo Yesu, bibongiseli ya basambeli ya eleko na Ye bayinaki Ye mingi kino babákaki Ye na ekulusu elongo na babomi bato ya mabe koleka. Soki masolo ya kala elobi solo, bibongiseli ya mikolo oyo bakoyina mosakoli, pe bakobenga ye mopéngwisi, mosakoli ya lokuta, to moto mabe koleka. Kasi Nzambe akozala ngambo ya mosali na Ye.
Soki mosakoli moko azalaki na eleko oyo, alingaki koyambama ndenge nini na Lingomba Katoliko? Na Lingomba Batiste? Na Lingomba Luterien? Na bibongiseli nyonso?
Nkolo Yesu alobaki na baoyo nyonso bandimeli Ye: “Bilembo oyo ekozala na baoyo bakondima; na nkombo na ngai, bakobengana milimo mabe, bakoloba minoko ya sika, Bakolokota banyoka, pe soki bameli eloko oyo ebomaka, ekosala bango mabe te; bakotiela babeli maboko, pe bakobika.” (Malako 16:17-18). Likomi oyo ezali solo lelo? Soki ezali solo te, mokolo nini Maloba ya Nkolo esilaki ngala? Na Biblia mobimba, basakoli bazalaki kobikisa babeli, kobengana milimo mabe, pe kosala bikamwa. Mose atelemisaki nyoka ya motáko liboso na libota ya Yisalaele mpo bábikisama soki nyoka ya ngenge eswi bango (Mituya 21:9). Naamane, Mosúlya ya nguya, ayaki epai na Elisa mpo ábikisama na mába (II Mikonzi 5:9). Ntango elenge mobali moko akweaki longwa na lininísa ya ndako ya etáje pe akufaki, ntoma Polo azingaki ye na maboko pe azongisaki bomoi kati na ebembe (Misala 20:10). Tozali bobele na makambo oyo ekomami kati na mibu misato na ndambo ya bomoi ya Nkolo na biso Yesu, kasi kati na mibu yango mpenza, Azalaki ntango nyonso kobikisa babeli. Bakufi miso bazalaki komona. Bato na mába bazalaki kobika. Bakufi matoi bazalaki koyoka. Bibosono bazalaki kotambola. Bokono ya lolenge nyonso ezalaki kobikisama (Matai 4:23).
Libanda na lobiko ya nzoto, Nzambe azalaki pe kotatola basakoli na Ye na lolenge mosusu. Ata basekelé oyo ebómbámá na nse ya motema mpenza ezalaki kotalisama na bato yango ya Nzambe. Mokonzi Nebukadenezare alotaki ndoto moko oyo etungisaki ye, kasi abosanaki yango. Mosakoli Daniele ayebisaki mokonzi ndoto yango pe lisakoli oyo elandaki (Daniel 2:28). Eloko moko te ebombamelaki Salomo ntango Mokonzi-mwasi ya Seba ayaki liboso na ye. Atondisamaki mpenza na Molimo na lolenge ete ayebisaki ye mituna ya motema na ye liboso na ye kotuna yango (I Mikonzi 10:3). Elisa ayebisaki Mokonzi ya Yisalaele miango nyonso ya Mokonzi ya Súlya, ata maloba ya nkukú oyo alobaki na ndako na ye ya kolala (II Mikonzi 6:12).
Na misala na Ye moko, mbala mingi, Nkolo Yesu azalaki kotalisa ete Molimo oyo ya kososola makanisi ezali Molimo ya Klisto. Asosolaki lolenge ya Natanaele ntango Alobaki: “Tala Moyisalaele mpenza, oyo azali na bokosi te!” Pe Yesu akobaki koyebisa Natanaele esika azalaki ntango Filipo asololaki na ye na ntina na Masiya (Yoane 1:48). Ntango Natanaele amonaki ete Yesu ayebaki motema na ye, andimaki mbala moko ete Azali Klisto. Mbala ya liboso Yesu amonaki Petelo, Ayebisaki ye nkombo ya tata na ye, Yona (Yoane 1:42). Na bongo, Petelo asundolaki nyonso pe alandaki Yesu na bomoi na ye mobimba. Yesu akutanaki na mwasi Mosamalíya na libulu ya mai pe ayebisaki ye masumu na ye asilà kosala. Maloba ma ye ya liboso ezalaki: “Misie, namoni ete ozali mosakoli” (Yoane 4:19). Bato misato oyo bautaki na bisika ekeseni, kasi bandimaki Yesu mbala moko, ntango Atalisaki likabo ya kososola makanisi.
Likabo yango elimwaki nde ntango lokasa ya suka ya Biblia ekomamaki? Soki bikamwa yango ekomami polele na Biblia, lelo oyo, ezali wapi? Na ntembe te, mosakoli ya eleko oyo akotatolama na nzela ya bikamwa.
Nzambe abosani nde bato na Ye? Azali naino na makoki ya kobikisa babeli? Azali naino kolobela biso na nzela ya basakoli na Ye? Moko na basakoli amonáká nde mokolo oyo?
Masakoli mosusu mazali, oyo ekokisami naino te?