Molili ebandaki kokóma makasi na ndako yango ya lopitalo, lokola nde ezalaki kati ya zamba monene. Nakokaki koyoka mopepe kopepa na nkasa, kasi ezalaki lokola mosika mpenza na zamba. Ntango mosusu osílá koyoka mopepe koningisa nkasa, kopusana moke-moke pene na yo. Namilobelaki: “Ee, oyo nde liwa ezali koya kozua ngai.” Oh! Molimo na ngai esengelaki kokutana na Nzambe, namekaki kobondela kasi nakokaki te.
Koleka mopepe yango ezalaki koya, ezalaki koyokana makasi koleka. Nkasa ezalaki koningana, pe na mbala moko, nakendeki.
Ezalaki lokola nazongaki mwana moke na makolo ngulu, natelemaki bobele na nzela yango na nse ya nzete yango moko. Nayokaki Mongongo yango moko oyo elobáká: “Komela masanga to makaya ata moke te.” Pe nkasa oyo nayokaki ezalaki yango moko oyo nayókáká na nzete yango mokolo wana.
Kasi mbala oyo, Mongongo elobaki: “Nabengaki yo kasi oboyaki kokende.” Ezongelaki mbala ya misato.
Bongo nalobaki: “Nkolo, soki ezali Yo, pesa ngai nzela ete názonga na mokili, pe nakoteya Nsango Malamu na Yo uta na likolo ya bandako pe na matákanelo ya balabala. Nakolobela yango na moto nyonso!”
Ntango emononeli yango elekaki, namonaki ete natikala naino komiyoka malamu ndenge wana te. Monganga oyo apasolaki ngai azalaki naino na lopitalo. Ayaki kotala ngai pe akamwaki. Kotala ye, azalaki lokola kokanisa ete nakokufa, bongo alobaki: “Nakendeke na ngai na losambo te, mpo mosala na ngai ezali monene mingi, kasi nayebi ete Nzambe auti kotala elenge mobali oyo.” Mpo na nini alobaki bongo, nayebi te. Moto ata moko te abakisaki maloba na yango. Soki na eleko wana nayebaka makambo oyo nayebi lelo, nalingaki kokita na mbeto pe kogánga Lokumu na Nkombo na Ye.
Sima na mwa mikolo, nazuaki ndingisa ya kozonga na ndako, kasi nazalaki kaka kobela pe nasengelaki kolata manéti na miso, mpo nazalaki komona malamu te. Motó na ngai ezalaki koningana soki naumeli kotala eloko moko.
Nakómaki mpenza koluka koyeba Nzambe. Nakendeki na lingomba moko kino na lingomba mosusu, nazalaki koluka esika oyo babéngaka bato na etumbelo na lolenge ya kala. Kasi mawa mingi, nakokaki komona ata moko te.
Nalobaki ete soki esalemi ete nakómi Moklisto, nakozala mpenza ya solo. Motei moko ayokaki ngai koloba bongo, alobaki: “Sikawa, petí Billy, obandi kokóma fanatíki.” Nalobaki ete soki esalemi ete nabongwani, nakolinga koyoka yango ntango ekoya, lokola bayekoli.
Oh, Nkombo na Ye ékumisama. Nabongwanaki, na sima, kino moi ya lelo, pe na lisungi na Ye, nakobatela yango ntango nyonso.
Mokolo moko na butu, nazalaki na mposa makasi ya Nzambe pe kobikela yango mpenza, kino nakendeki na hangáre moko na sima ya ndako pe namekaki kobondela. Na ntango wana nayebaki kobondela te, pe nabandaki bobele kosolola na Ye, ndenge nasololaka na bato mosusu. Na mbala moko Pole moko ekotaki na hangáre yango, esalaki ekulusu, pe Mongongo ebimaki na ekulusu yango, pe elobelaki ngai na lokóta oyo nasosolaki te. Na sima, elimwaki. Ebendaki bokebi na ngai. Ntango bomoto na ngai ezongaki, nabondelaki: “Nkolo, soki ezali Yo, nasengi ete Óyá kolobela ngai lisusu.” Bandá mokolo nabimáká na lopitalo, nakómáká kotanga Biblia na ngai, pe natángáká na 1 Yoane 4: “Balingami, bóndimaka milimo nyonso te, kasi bómekaka yango soki euti na Nzambe.”
Nayebaki ete molimo moko ebimelaki ngai, pe wana nazalaki kobondela, eyaki lisusu. Bongo, mpo na ngai, ezalaki lokola balongoli ngai mokumba ya kiló nkama mitano na molimo na ngai. Natelemaki nokinoki pe nakimaki mbangu kino na ndako, pe ezalaki lokola nazalaki kokima mbangu na mipepe.
Mama atunaki ngai: “Bill, likambo nini ekómeli yo?” Nalobaki na ye: “Nayebi te, kasi nazali mpenza komiyoka malamu pe pepele.” Nakokaki lisusu kofanda na ndako ntango molai te. Nasengelaki kobima pe kokima mbangu.
Na ntango wana, nayebaki ete soki Nzambe alingi ete náteya, Akobikisa ngai. Bongo, nakendeki na losambo moko, bandimaka kopakola mafuta pe nabikaki mbala moko. Bongo, namonaki ete bayekoli bazalaki na eloko moko oyo batei mingi bazali na yango te lelo. Bayekoli babatisamaki na Molimo Mosantu, yango wana bakokaki kobikisa babeli pe kosala bikamwa minene na Nkombo na Ye. Boye, nakómaki kobondela mpo na libatisi ya Molimo Mosantu pe nazuaki yango.
Mokolo moko, sima na sanza soki motoba, Nzambe akokisaki mposa ya motema na ngai. Alobelaki ngai kati na Pole moko ya monene, Koloba na ngai ete nákende koteya pe kobondela mpo na babeli, pe Akobikisa bango, ata soki bazali na bokono nini. Nabandaki koteya pe kosala makambo Ye azalaki kotinda ngai kosala. Oh, moninga, nakoki te kobanda koyebisa yo makambo nyonso oyo esalémá: Bakufi miso bamóná. Bibósono batámbólá. Bato babíká na kansére, pe bikamwa ya ndenge na ndenge esálémá.
Mokolo moko na ebandeli ya Balabala Spring, na Jeffersonville, Indiana, sima na póso mibale ya kolamuka, nazalaki kobatisa bato 130. Moi ezalaki makasi mokolo yango na sanza ya mwambe, pe bato soko 3000 bazalaki wana. Nalingaki kobatisa moto ya 17, mbala moko, nayokaki lisusu Mongongo yango ya bopolo, elobaki: “Tómbola miso na likolo.” Likolo ezalaki lokola motáko, mokolo yango, moi makasi, na sanza ya mwambe. Mbula ebetáká te póso soko misato liboso na yango. Nayokaki lisusu Mongongo yango, pe, lisusu, na mbala ya misato, elobaki: “Tómbola miso na likolo.”
Natombolaki miso na likolo, pe monzoto ya kongala moko ya monene ekitaki longwa na likolo, nasiláká komona yango mbala mingi liboso, kasi nazaláká koyebisa bino te. Mbala mingi nazalaki koyebisa bato ndenge ezalaki kokita, kasi bazalaki koseka pe koloba: “Bill, ozali bobele komona yango na makanisi. To, ntango mosusu ozalaki kolota.” Kasi nkembo na Nzambe, mbala wana Amitalisaki polele na miso ya bato nyonso, mpo eyaki mpenza pembeni na ngai na lolenge ete nakokaki ata koloba te. Sima na ba-sekónde, nagángaki pe bato mingi batómbolaki miso pe bamonaki mpenza monzoto yango likolo na ngai. Bamoko bakweaki sénza, bamosusu bazalaki kogánga pe bamosusu bakimaki. Na sima, monzoto yango ezongaki na likolo, pe esika yango eutaki ezalaki soko metre karé mitano, pe esika yango ezalaki kaka koningana pe kobaluka lokola mbonge ezali kobaluka. Lipatá moke ya pembe esalemaki na esika yango pe monzoto yango emataki pe ekotaki na lipatá yango.