Bosenga ya mabondeli

Iyo, tondimaka mpenza ete bobele Yesu Klisto oyo asalaki bikamwa eleki mibu nkóto mibale, azali na makoki ya kosala ndenge moko lelo. Okoki kokoma na lokasa oyo elandi, soki olingi ete tókanisa yo na mabondeli. Tosengi ete ótindela biso litatoli na yo ntango Nkolo akoyanola.


Malako 16 :17-18

Bilembo oyo ekozala na baoyo bakondima; Na nkombo na ngai, bakobengana milimo mabe; bakoloba minoko ya sika; Bakolokota banyoka; pe soki bameli eloko oyo ebomaka, ekosala bango mabe te; bakotiela babeli maboko, pe bakobika.

 

Yoane 14 :12-14

Solo, solo, nazali koloba na bino, Ye oyo akondimela ngai, misala oyo nazali kosala, ye pe akosala yango; akosala misala ya minene koleka oyo; mpo ete nazali kokende epai na Tata na ngai. Pe nyonso oyo bokosenga na nkombo na ngai, nakosala yango, mpo Tata ázua nkembo kati na Mwana. Soki bosengi eloko na nkombo na ngai, nakosala yango.

 

I Petelo 2 :24

Ye moko amemaki masumu na biso na nzoto na ye mpenza likolo na nzete, mpo tótika masumu, pe tózala na bomoi ya boyengebene: bobiki na mapipi na ye.

Lokasa mpo na kokoma bosenga ya mabondeli


*Esika oyo esengami