Oyo ezali mituna oyo tozuaka na ntina na mosala na biso. Ntango okosilisa kotánga, soki ozali naino na motuna na ntina na makambo oyo ekomami na síte oyo, okoki kokomela biso e-mail na adresse oyo: answer@themessage.com.

 

Bondimaka makambo nini?

Tokoki koloba ete malakisi na biso “oyo eyebani” ya lingomba ezali Biblia, kobanda na Genese kino na Emoniseli. Kondima na biso, na mokuse, ekoki kopesama boye: Endimeli mosusu te bobele Klisto, mobeko mosusu te bobele bolingo, búku mosusu te bobele Biblia.

Nazali Moklisto. Makambo oyo ezali na síte oyo ezali mpenza na ntina mpo na ngai?

Iyo! Baklisto basengeli kondima Liloba mobimba ya Nzambe; yango wana tokendeke na losambo pe totángaka Biblia. Mpo na nini ondimi eteni ya Biblia oyo elobi ete Yesu akufaki mpo na masumu na yo, kasi oboyi koyeba ndenge lisumu ebandaki na Elanga ya Edene?

Nandimi ete makambo nauti kotánga ezali solo. Nakokota ndenge nini?

Nzoto na Klisto ezali secte to ebongiseli te, mpo na kokota, basengi yo bobele ete óndimela Nkolo Yesu. Komitungisa te mpo na kokomisa nkombo na yo na búku mpo lingomba ébanda koyangela yo. Ndima bobele Liloba, pe Nkolo akotala makambo oyo etikali.

Bozali lingomba?

Tozali lingomba ya ebongiseli te, kasi tosungaka mangomba nkóto na nkóto pe bato milió na milió na mokili mobimba, wana topesaka bango bisalelo ya losambo. Lotómo na biso ezali ya kopesa bato mpiko ete bápúsana pembeni na Nkolo Yesu na nzela na kopesa Nsango-malamu na Ye na moto nyonso oyo azali na mokili.

Nalingi kozua libatisi. Nakosala nini?

Soki ozui moto moko te mpo ábatisa yo na Nkombo na Nkolo Yesu Klisto, tindela biso e-mail yebisa biso esika ozali pe tokotindela yo nkombo ya balosambo oyo ezali pembeni na yo pe bakobatisa yo na lolenge oyo esengeli. Yeba ete, kokokana na Biblia, kozua libatisi na Nkombo na Nkolo Yesu ezali na motuya monene, kasi na bibiangelo ya Tata, Mwana pe Molimo Mosantu te.

Bokanisi ete nabungi mpo nazali moto ya Katoliko to mondimi ya ebongiseli mosusu?

Nkolo Yesu alobaki: “Bósambisa te, mpo bósambisama te.” Moto moko te azali na bokonzi ya kosambisa lobiko. Yesu alobaki lisusu: “Moto oyo akondima pe akobatisama, akobikisama; kasi moto oyo akondima te, akokweisama.” Na bongo, ezali na ntina te soki ozali moto ya Katoliko, Batiste to Pantekotiste; soki ondimeli Nkolo Yesu Klisto, okobikisama.

La Voix de Dieu ezali nini?

Voice Of God Recordings, Inc. (La Voix de Dieu) ezali mosala oyo eponi ebongiseli te, emipésá mpo Nsango-malamu ya Nkolo Yesu Klisto ékende liboso. Liziba ya liboso epai tozuaka bisalelo oyo tokabolaka, ezali mateya oyo ezali na babánde, ya nkóndó William Marrion Branham, mosakoli ya Nzambe pe evangeliste oyo ayebani na mokili mobimba. Tokabolaka ba-MP3, ba-CD, ba-DVD, ba-video, ba-logiciel, babúku, ba-magasine, ba-traité, bafotó, bazulunále pe ba-síte.

William Branham azali nani, pe akosala na ngai nini?

Reverend Branham azalaki evangeliste oyo ayebanaki na mokili mobimba, ateyaki kobanda na ba-1947 kino na 1965. Amemaki bobele bato milió na milió epai na Klisto te, kasi Nzambe atatolaki mosala na ye na bikamwa mingi mpenza. Lien oyo ekosala ete óbanda koyeba mosala na ye.

Soki bikamwa nyonso oyo esalemaki mpenza, mpo na nini nayóká naino makambo na ye te?

Ezali motuna ya malamu, oyo tokosepela kotuna na mangomba nyonso ya minene lelo. Nzambe atindaki mosakoli! Mpo na nini bato nyonso bazali kolobela yango te? Basengelaki kolobela yango.

Mpo na nini bolobaka mingi na ntina na William Branham?

Bobele na ntina oyo Yoswa azalaki koloba mingi na ntina na Mose. Mose azalaki mosakoli oyo ayaki na Nsango oyo eutaki epai na Nzambe. Ndeko Branham pe ndenge moko.

Namonaka basi oyo balandaka mosala na bino. Mpo na nini bango nyonso bazalaka na suki milai pe balataka ba-jupe ya milai?

Na Bakolinti ya Liboso 11:15, Polo alobaki: “Kasi soki mwasi azali na suki milai, ezali nkembo mpo na ye: mpo suki na ye epesamélá ye lokola ezipeli.” Polo alobaki lisusu ete basi basengeli kobongisa nzoto na bango na molato ya malamu…” pe Mose alobaki: “Mwasi akolata bilamba ya mobali te.” Soki Biblia elobi yango, na bongo, Baklisto ya solo bakondima yango.

Nalukaki pe namonaki ba-síte oyo bato bamipésá mosala ya kotalisa mabunga na makambo oyo Reverend Branham alobá. Bokopesa bango eyano nini?

Bokomona ba-síte oyo bato bamipésá mosala ya kotalisa mabunga na makambo nyonso, ata na Biblia. Tosengi na yo bobele ete ósambisa Nsango oyo topesi yo na nzela na Liloba na Nzambe, kasi na maloba kitoko te, oyo etondi na internet. Yeba ete, moto oyo atiolámá koleka Nkolo Yesu azali te. Soki ozali kosala likambo ya malamu, na bongo, yeba ete bato mosusu bakoboya yo.

Bibongiseli nyonso elukaka nde mbongo oyo ezali na mábenga na ngai. Ezalaka ntango nyonso likambo ya mbongo.

Tala malamu, na síte oyo, na esika ata moko te tozali kosenga mabonza. Soki mokolo moko tosengeli kosenga-senga mbongo, elingi koloba ete ntango ekoki mpo mosala oyo ésuka. Oyo ezali likambo ya mbongo te, ezali nde likambo ya komema milimo epai na Yesu Klisto.

Nazali na mposa ya koyeba makambo mingi; sikawa, násala nini?

Biblia elobi: “Kondima eyaka na nzela na koyoka,” na bongo, tozali kopesa yo mpiko ete ókoba koyoka. Tozali na mateya koleka 1200 na babánde, okoki ko-telechargé yango ofele. Tokoki kotindela yo bisalelo na adresse e-mail na yo soki ozali kokoka ko-telechargé makambo ya electronic te.


www.branham.org epesaka, mokolo na mokolo, ba-nsango pe matatoli oyo ezali kolandana na mosala na biso. Tosengi na yo ete óyaka kotala biso mokolo na mokolo mpo na kotánga makambo oyo eutaka epai na bandimi na mokili mobimba. Okoki kokamwa mpo na komona motango ya makambo ya minene, oyo Nkolo Yesu azali kosala lelo, na mikolo oyo.