Na ebandeli ya mosala ya Ndeko Branham, ekómaki polele ete lolenge ya bibongiseli esalemaki mpo na kotómbola bibongiseli ya mangomba, kasi Nsango Malamu ya solo te. Ndeko Branham azalaki kondima Liloba na liloba ya Biblia, pe azalaki kobeta ntembe na yango te, ata soki baninga ya mosala, baninga, to libota basengelaki koboya ye.
Ntango azalaki naino mondimi ya Lingomba Baptiste Missionnaire, bayebisaki ye ete ábúlisa basi na mosala ya koteya. Kasi, ayebaki Makomi malamu mpenza. I Timoté 2:12 elobi polele ete: “Nazali kopesa mwasi nzela ya koteya te, to ya kozala na bokonzi likolo na mobali te, kasi nde áfanda kimia,” pe I Bakolinti 14:34 elobi: “Basi báfanda kimia na balosambo, mpo bapesi bango nzela ya koloba te…” Yango etelemelaki basi te, kasi Biblia elobeli likambo yango polele. Ntango motindo epesamaki, akokaki kokakola te, boye abimaki na lingomba yango.
Bobele Likomi wana te nde bibongiseli bazalaki kotia yango pembeni. Nkolo amonisaki bosolo ya libatisi epai ya Ndeko Branham. Ndenge nini Yesu apesaki mitindo ete: “Yango wana, bókende pe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata, pe ya Mwana, pe ya Molimo Mosantu,” nzokande libatisi nyonso oyo ekomami na Biblia epesamaki na Nkombo na Yesu? Ntoma Petelo apesaki mitindo, na Misala 2:38, ete bóbongola mitema, pe moko na moko na bino ábatisama na Nkombo na Yesu Klisto. Makomi etambolaka na bomoko mpenza, kasi esengelaki na mosakoli moko mpo na komonisa sekelé oyo: “Tata” ezali nkombo te, “Mwana” ezali nkombo te, pe “Molimo Mosantu” ezali nkombo te. Bobele ndenge moto moko azalaka tata ya bana na ye, mwana ya baboti na ye, pe ndeko ya bandeko na ye, kasi nkombo na ye ezali “tata”, “mwana” to “ndeko” te. Tata, Mwana, pe Molimo Mosantu ezali bibiangelo ya Nkombo na Yesu Klisto. Matai 28:19 ná Misala 2:38 elandani malamu mpenza.
Ata lisumu ya ebandeli na Elanga ya Edene emonisamaki, ezalaki likambo ya kolia mbuma te, kasi likambo moko makasi koleka. Ndenge nini kolia eteni ya mbuma ekokaki komonisa mbala moko na Adama ná Eva ete bazalaki bolumbu? Ekoki kososolama ata moke te. Boyokani nini ezali kati na mbuma ya póme ná kozala bolumbu? Mosakoli ya Nzambe amonisaki sekelé yango polele.
Banje oyo elobelami bango na Emoniseli mokapo ya 2 pe ya 3 ezalaki banani? Mbala mosusu bankombo na bango ekoki koyebana malamu.
Babuti mpunda oyo bayebani te ya Emoniseli mokapo ya 6 ezali banani? Bazali na eloko moko ya motuya mpenza oyo ezali kolandana.
Mboka Etats-Unis elobelami nde na Buku ya Emoniseli?
Bato 144.000 oyo babikisamaki na mokapo ya 7 ezali banani?
Mwasi ya ndumba monene ya mokapo ya 17 ezali nani? Oyo ye azali pe basekelé nyonso oyo emonisamaki na Nsango ya mosakoli ya nguya oyo atindami na Nzambe.
Bobele bikamwa ebele nde elandaki moto te, kasi mabombami oyo ebombamáká na Biblia kati na bileko, emonisamaki pe na mosala na ye ya koteya. Ekómaki polele ete mosakoli yango akokisaki Makomi mingi koleka oyo ya Malaki 4.
Emoniseli 10:7: Kasi na mikolo ya mongongo ya mwanje na nsambo, ntango akobanda koyula kelelo, libombami ya Nzambe ekokokisama mpenza, lokola asakolaki na baombo na ye basakoli.
Mongongo moko ezali kogánga na mokili ete bato bábima na bibongiseli pe bázonga na Liloba na Nzambe ya ebandeli. Moko na moko na biso azui libaku malamu moko, oyo Petelo, Yakobo ná Yoane bazuaki. Tozui libaku malamu ya kotángama kati na bato moke oyo Nzambe aponá, oyo bakondimela bibongiseli ya mangomba ya lelo te.
Makomi Mosantu elobeli bomoi pe misala ya bato oyo batambolaki elongo na Nzambe, pe bapakolamaki mpenza na Molimo na Ye, kino balobaki YANGO ELOBI NKOLO, pe maloba na bango etatolamaki na bilembo pe bikamwa oyo ekweaka te. Bazalaki basakoli ya Nzambe, pe Mongongo ya Nzambe mpo na eleko na bango.
Ntango ya lelo ekeseni nde na ntango oyo Yesu azalaki awa? Bakambi ya mangomba nde babakaki Ye na ekulusu. Bayekoli bazalaki moke mingi mpenza kati ya mimesano minene ya mangomba. Baboyamaki, batiolamaki, pe bamosusu babomamaki mpo batelemelaki mimesano ya bibongiseli. Mbala mosusu biso tokobomama lelo te mpo na kondima na biso, kasi na ntembe te tozali konyokwama. Lokola Bafalisai ná Basadukai, bakoki koboya te bikamwa oyo elandaki mosala ya koteya ya Ndeko Branham, boye bazali kobundisa yango na lolenge mosusu. Bokoki koyoka bango koloba ete azalaki mosakoli ya lokuta, mokambi ya binzambinzambi, to ya mabe koleka. Nzokande, azalaki moto na Nzambe ya komikitisa, oyo atelemelaki makasi mpenza bokonzi na nko ya bibongiseli pe mangomba likolo na bato ya Nzambe. Babundisaki Yesu ndenge moko ntango Atelemelaki biyambweli pe mimesano na bango.
Nzambe asepelaki na mokano malamu ya Ndeko Branham ndenge andimaki Liloba moko moko ya Biblia, pe Azali kosalela mosala na ye mpo na komema bamilió ya milimo ya bato epai na Yesu Klisto. Lelo, Mongongo ya Mwanje na Nsambo ezali koyula na makasi na Yango nyonso. Na mokili mobimba, pene na milió mibale na bato bandimá Nsango ya Ndeko Branham. Ekoki kozala mwa bato moke mpenza kati na ba-miliáre mibale na bato bamibengaka Baklisto, kasi na eleko nini bato ya Nzambe bazalaki moke te?
Tozali na babande ya mateya koleka 1.200 oyo ezali na Mongongo oyo esakolamáki, na Emoniseli 10:7, ete ekoya. Mateya yango moko na moko efungolaka mabombami mingi ya Nzambe. Okoki koyoka Mongongo yango soki olingi koyoka Yango.
YO MOTO OKOPONA
Ata mbala moko te natéyaka bato liteya mpo bato bálanda ngai to bákota na losambo na ngai, to bábanda bondeko pe ebongiseli moko. Nasálá naino yango te, pe nakosala yango sikawa te. Nasepelaka na makambo wana te, nasepelaka nde na makambo ya Nzambe pe bato, pe nakosepela soki nakoki kosala likambo yango moko. Likambo yango ezali ete námona boyokani mpenza ya molimo kati na Nzambe pe bato, oyo kati na yango bato bakoki kokóma bikelamu ya sika kati na Klisto, batondi na Molimo na Ye, pe bazali kobika kokokana na Liloba na Ye. Nakosenga, nakobondela pe nakokebisa bino nyonso ete bokoyóka Mongongo na Ye sikawa, ete bopesa Ye bomoi na bino mobimba, ndenge nandimi na motema na ngai ete napésá Ye nyonso ya ngai. Nzambe ápambola bino, pe Boyei na Ye ésepelisa motema na bino.
Rev. William Marrion Branham
Soki olingi koyeba makambo mosusu etali mosala ya Wa-lokumu William Marrion Branham
pe ndenge okoki kozua mateya na ye, okoki kokomela:
THEMESSAGE.COM
13e rue Limete No. 82, Quartier Industriel
Kinshasa / Limete, Dem Rep of Congo
243.810.34.24.67