Mokolo moko nazuaki mokano, namonaki nzela ya kokima mbélá yango. Nazalaki kokende na wésti mpo na kosala na férme moko. Moninga na ngai, Nzambe azali monene kuna, ndenge moko Azali monene bisika nyonso. Zuá mayele uta na makambo ngai nabikeli. Soki Abengi yo, yanola Ye.
Na ntongo moko, na sanza ya libwa ya 1927, nayebisaki mama ete nakokende mobembo ya camping na Tunnel Mill, ezali na ntáká ya kilometre ntúkú mibale na ndambo na Jeffersonville, epai tozalaki kofanda na eleko wana. Nasilaki kolengela mobembo mpo na kokende na Arizona elongo na baninga. Ntango Mama ayokaki lisusu nsango na ngai, nazalaki na Tunnel Mill te kasi na Phoenix, na Arizona, nazalaki kokima Nzambe ya Bolingo. Kobika na férme ezalaki malamu mpenza na ntango moko, kasi eumelaki te pe ebebaki, lokola bisengo nyonso ya mokili. Kasi, Nkembo na Nzambe, tika náloba awa ete kobika elongo na Yesu ekómaka ntango nyonso kitoko koleka kasi ebébaka te. Yesu apesaka kimia ebongi be pe kobondisama ntango nyonso.
Mbala mingi nazalaki koyoka mopepe kopepa na banzete milai ya pin. Ezalaki lokola nazalaki koyoka Mongongo na Ye kobénga na mosika, na zamba, koloba: “Adama, ozali wapi?” Emonanaki lokola minzoto ezalaki pembeni mpenza, ete okoki kosimba yango na maboko na yo. Emonanaki lokola Nzambe azalaki mpenza pembeni.
Eloko mabe na etúká yango ezali banzela kati ya biliki. Soki omeki kobima na nzela, okobunga mpenza na pete. Mbala mingi baturíste bamonaka mwa bafolólo ya biliki pe babimaka na nzela ya monene mpo na kobuka yango. Batelenganaka kati ya biliki, babungaka pe mbala mosusu bakufaka na mposa ya mai. Ezali pe bongo na nzela ya Baklisto – Nzambe azali na nzela ya monene. Alobeli yango na Yisaya, mokapo ya 35. Ebengami “Nzela monene ya Bosantu.” Mbala mingi, mwa bisengo ya mokili ebimisaka bino na nzela ya monene. Pe, bobungisaka makambo bobikelaki na Nzambe. Kati na biliki, soki obungi, mbala mosusu ekósaka miso komona makambo. Mpo na bato bakufaka na mposa ya mai, ekósaka miso komona ebale to láki. Mbala mingi bato balandaka yango pe bamibwakaka kati na yango, na sima bakososola ete bazali kosukola kati na zélo ya móto. Mbala mosusu zabolo atalisaka bino eloko ye abengaka bisengo. Ezali bobele kokósa miso, ezali eloko ya solo te. Soki oyoki ye, okosutuka ete ozali bobele komibakisela mpasi likolo na motó na yo. Koyókelaka ye te, ndeko motángi. Ndimela Yesu oyo apesaka mai ya bomoi na baoyo bazali na nzala pe na mposa.
Mokolo moko nazuaki mokanda kouta na mboka, koloba na ngai ete moko na bandeko na ngai ya mobali azalaki kobela makasi. Ezalaki Edwar, oyo alandi ngai. Na ntembe te, namonaki yango lokola likambo ya makasi te, bongo nakanisaki ete akobika na ye. Kasi na mpokwa moko, sima na mwa mikolo, ntango nautaki na engumba, koleka na esika tozalaki kolia na férme, namonaki lokasa moko likolo na mesa. Nazuaki yango. Ekomamaki: “Bill, yaka na matiti ya bibwele ya nórdi. Ezali na ntina monene.” Sima na kotánga mokanda yango, ngai ná moninga na ngai, tokendeki esika yango. Moto ya liboso nakutanaki na ye, ezalaki mobateli-zamba moko, azalaki moto ya Lone Star, pe azalaki kosala na férme yango. Nkombo na ye ezalaki Durfy, kasi tozalaki kobenga ye “Pop.” Azalaki na elongi ya mawa ntango alobaki: “Petit Billy, nazali na nsango ya mawa mpo na yo.” Na ntango yango moko mobateli-zamba-mokonzi ayaki wana. Bayebisaki ngai ete telegráme moko eutaki koya, mpo na koyebisa ngai liwa ya ndeko na ngai ya mobali.
Moninga na ngai, na mwa ntango moke, nakokaki koningana te. Ezalaki liwa ya liboso na libota na biso. Kasi nalingi koloba ete likambo ya liboso nakanisaki, ezalaki soki amilengelaki mpo na liwa. Ntango nabalolaki elongi pe nabwakaki miso na etando ya matiti oyo esilaki kokauka, mai ya miso ekitaki na matáma na ngai. Nakanisaki lisusu ndenge tozaláká kosala makasi elongo, ntango tozaláká bana mike, pe ndenge tozaláká kobika na mpasi.
Tozalaki komema bilei moke mpenza na kelasi. Misapi ya makolo ezalaki libanda ya sapato, pe tosengelaki kolata bakazaka ya kala, oyo bakangí epéngle na kingo mpo tozalaki na simísi te. Nakanisaki lisusu mokolo moko oyo Mama atielaki biso popcorn na katíni ya moke mpo tólia na midi. Tozalaki kolia esika moko na bana mosusu te. Tozalaki na makoki ya kosomba bilei bango bazalaki kosomba te. Tozalaki ntango nyonso komibenda kino na ngomba mpo tolia. Nakanisi lisusu mokolo tozalaki na popcorn, tokanisaki ezalaki bilei ya lokumu. Bongo, mpo náyeba ete nazui ndambo ya ngai, nabimaki liboso midi ébeta pe nazuaki loboko mobimba liboso ndeko na ngai ázua ndambo na ye.
Bongo, natelemaki wana kotala ndenge moi esilaki kokausa matiti, nakanisaki makambo nyonso wana pe namitunaki soki Nzambe amemaki ye na esika ya malamu koleka. Na ntango yango, Nzambe abengaki ngai lisusu, kasi lokola momesano, nalukaki koboya yango.
Namilengelaki mpo názonga epai na biso mpo na bokundami. Ntango Wa-lokumu McKinny ya Lingomba ya Port Fulton, azali mpenza lokola tata mpo na ngai, ntango azalaki koteya, alobaki: “Bato mosusu bakoki kozala awa, oyo bayebi Nzambe te, soki bazali, bóyamba Ye sikawa.” Oh nakangaki kiti na ngai makasi, Nzambe azalaki kosala lisusu. Ndeko motángi, soki Abengi yo, yanola Ye.
Nakobosana ata mokolo moko te ndenge Papa ná Mama balelaki, sima na bokundami. Nazalaki na mposa ya kozonga na Wésti, kasi Mama abondelaki ngai makasi mpenza mpo nátikala, sukasuka nandimaki kotikala, soki nakokaki kozua mosala. Nokinoki nazuaki mosala na Kompani ya Letá, na Indiana.
Pene na mibu mibale na sima, ntango nazalaki komeka ba-kontére, na atelié ya ba-kontére, na Izíni ya Gaz, na New Albany, gaz ebetaki ngai pe epesaki ngai bokono oyo esalaki bampóso mingi. Nakutanaki na minganga nyonso oyo nayebaki. Nazalaki kobika te. Nabelaki bokono ya asíde na estomá, oyo eutaki na gaz yango. Bokono yango ezalaki ntango nyonso kokóma makasi. Bamemaki ngai epai ya ba-spesialiste na Louisville, Kentucky. Sukasuka balobaki ete ezalaki apendisíte, pe balobaki ete basengelaki kopasola ngai. Nakokaki kondima yango te mpo nazalaki koyoka mpasi na mopanzí te. Minganga balobaki ete nzela mosusu ezalaki te, basengelaki kopasola ngai. Sukasuka nandimaki lipaso yango kasi nalobaki makasi ete bátia ngai anestezí locale mpo námona ndenge bazali kosala lipaso yango.
Oh, nalingaki ete moto oyo ayebi Nzambe ázala pembeni na ngai. Nazalaki kondima libondeli kasi nayebaki kobondela te. Bongo, motei moko ya Première Eglise Baptiste akotaki elongo na ngai na ndako ya lipasó.
Ntango balongolaki ngai na mesa pe batii ngai na mbeto na ngai, nazalaki ntango nyonso kolemba nzoto. Motema na ngai ekómaki kobeta malembe mpenza. Nayokaki kufa kokómela ngai. Péma na ngai ezalaki ntango nyonso kokóma mokuse. Nayebaki ete nakómaki na suka ya mobémbo na ngai. Oh, moninga, zelá mokolo okokóma wana, nde okokanisa makambo mingi oyo osálá. Nayebaki ete nameláká makaya te, masanga te, to nazaláká na mimesano ya mabe te, kasi nayebaki ete namilengelaki te mpo na kokutana na Nzambe na ngai.
Moninga na ngai, soki ozali bobele mondimi ya lingomba, ya malili, ntango okokóma na suka, okoyeba ete omilengeli te. Boye, soki yango nde nyonso oyebi mpo na Nzambe na ngai, nasengi na yo, kaka sikawa, ete ófukama pe ósenga na Yesu ete ápesa yo kobikela mbotama ya sika, ndenge Ayebisaki Nikodeme na Yoane mokapo ya 3, pe oh, bangonga ya esengo ekobeta. Nkombo na Ye ékumisama.