Ndeko Branham alimbolaka mingi Likonzi na Móto oyo etatolaki mosala na ye ya koteya. Ezalaki wana ntango abotamaki, bato nkóto na nkóto bamonaki yango na libongo ya Ebale Ohio, pe emonani ete ezalaki kolanda ye bisika nyonso azalaki kokende. Na 1950 nde Nkolo apesaki ndangá oyo etalisaki polele, epai na bandimi pe bazangi kondima, ete Likonzi na Móto oyo ezalaki elongo na mosakoli.
Kowelana ezalaki makasi na mpokwa wana na Sam Houston Coliseum. Ndeko Branham asalisaki mayangani ya lobiko na nzoto pe ezalaki kopalangana na ekólo mobimba. Mapamboli ya Nkolo Yesu ezalaki kosopana lokola mbula likolo na bilanga ya masangu ya molimo. Kasi bilembo pe bikamwa yango, bato bazangaki kotónga yango te. Ndenge ezalaka ntango nyonso, moyini atelemisaki bangúná. Mampinga nyonso mibale ekutanaki na Houston, na Texas, pe Mwanje na Nkolo, Ye moko, akitaki mpo na kobunda etumba.
Bato nkóto na nkóto basilaki koya mpo na kotatola bikamwa oyo ekoki kotángama te, oyo ezalaki kolanda moto na Nzambe oyo. Mokolo moko liboso, etónga ya batei ya engumba yango babetaki mondenge na mosakoli, na masoló ya bowelani likolo na lobiko na nzoto kouta na Nzambe, kasi mondenge yango eyaki epai ya moninga ya mosala ya mosakoli, Reverá F.F. Bosworth. Bato na ntembe mingi, batalisamaki na motei moko ya lingomba Batiste ya engumba yango, andimaka lobiko na nzoto kouta na Nzambe ata moke te. Bakomi ya bazulunále bayokaki likambo yango, pe nokinoki bakomaki ete: “Kazaka Ya Teolojí Ekopumboa Lelo Na 19h00 Na Sam Houston Coliseum.”
Moto na ntembe azuaki mokangi fotó ya solosolo na mosala, Ted Kipperman ya Douglas Studios, mpo ákanga bafotó na bowelani yango. Na mpokwa yango, bafotó ekangamaki elongo na Ndeko Bosworth oyo atelemaki na komikitisa, wana moto na ntembe azalaki kotelema lokola azali kobangisa bato; na ntango moko atiaki mosapi na elongi ya mobange oyo amikitísá.
Ntango bowelani ebandaki, Reverá Bosworth aumelaki te mpo na kotalisa polele ete Nzambe abikisaka bokono, ná bilembo ya Makomi, na sima, mpo motuna étikala te, asengaki na baoyo basílá kobikisama na bampasi na bango bátelema. Bato nkóto na nkóto batelemaki. Ntango baoyo basílá kobikisama bafandaki, atunaki soki baoyo Nzambe abikísá na bokono, oyo bazalaki na nzoto kolongonu pe basambelaka na ebongiseli ya moto yango bakoki kotelema. Bandimi ya lingomba nkama misato batelemaki mpo na kotalisa na lipambu mawa oyo Nkolo Yesu asilaki kotalisa bango.
Sikawa mondenge eutaki epai ya moto na ntembe. “Mobikisi ya Nzambe yango áyá awa. Ásala ekamwiseli.” Ndeko Bosworth atalisaki polele ete Mobikisi ya Nzambe azali bobele Yesu, kasi moto na ntembe akobaki kongala na loléndo. Sukasuka, Ndeko Bosworth abengisaki Ndeko Branham na etumbelo. Andimaki koya, wana bato bazalaki kogánga mpo na kopesa ye mpiko.
Mosakoli, atondisamaki na Molimo Mosantu pe ayanolaki boye:
Ngai nakoki kobikisa moto moko te. Yango nde eloko nalobaka. Ntango nazalaki bebé, nautaki kobotama na Etá ya Kentucky, ndenge mama na ngai molingami alobá na ngai, pe etatolami na bomoi na ngai, Pole moko ekotaki na mwa ndako yango, epai yango esalemaki, ezalaki na simá na nse te, ezalaki ata na lininísa te, bazalaki bobele na mwa eloko moko wana lokola lininísa, lokola mwa ekuke, pe bafungolaki yango na bangonga ya mitano ya ntongo, pe Pole yango ekotaki, na kozunguluka, ntango ntongo ezalaki kotána. Bandá wana, Ezalaka elongo na ngai. Ezali Mwanje ya Nzambe. Akutanaki na ngai Ye moko eleki mwa mibu. Na bomoi na ngai mobimba, Ayebisaka ngai makambo ekokisamaka, pe nalobaka yango ndenge Ye alobelaka ngai. Pe nabeti mondenge na moto nyonso na bisika nyonso, ete ákende na engumba esika nakólá, to na esika mosusu nyonso, soki nasílá koloba likambo moko na Nkombo ya Nkolo, kozanga ete ékokisama ndenge elobamaki.
Sima na ye koloba maloba wana, Molimo Mosantu akitaki na etumbelo, pe mokangi fotó asepelaki ete akangaki fotó. Ndeko Branham alongwaki na etumbelo, sima na koloba maloba ya pete, kasi ya lisakoli oyo: “Nzambe nde akotatola. Ngai nakoloba lisusu te.”
Molandi ya M. Kipperman akendeki noki kosukola bafotó yango mpo na bansango ya ntongo ya mokolo oyo elandi. Amonaki eloko moko ya ndenge mosusu, ntango abimisaki fotó ya liboso na nkisi oyo esukolaka yango. Yango, ná bafotó mosusu mitano oyo elandaki, ezalaki na eloko te. Asimbaki motema pe akweaki, ntango abimisaki fotó ya suka na nkisi. Na fotó ya suka, Likonzi na Móto emonanaki polele likolo na motó ya mosakoli ya Nzambe, William Marrion Branham.
Bana ya Yisalaele bamonaki Likonzi na Móto oyo ezalaki kokamba Mose, pe bato ya eleko oyo bamoni bobele Likonzi na Móto yango oyo ezali kokamba mosakoli mosusu.
Bapesaki fotó yango nokinoki epai ya George J. Lacy, Nganga Motali ya Mikanda oyo Etiami Ntembe ya U.S. F.B.I., pe andimaki fotó yango na likanisi na ye ya bonganga. Mokanda oyo M. Lacy akomaki ezali na lokasa oyo elandi.
Likambo yango esalemaki liboso ete ba-ordinatére ná bafotó nimeríke ézala, pe ekokaki kolimbolama te na lolenge mosusu oyo zebi eyebi, bobele ete Pole mpenza ezalaki likolo na motó ya William Branham. Lelo, fotó yango ezuami na Bibliotéke ya Congres ya Etats-Unis, na mboka-mokonzi ya ekólo, Washington DC.