“Mokolo nabotamaki na mwa ndako ya mabaya, kuna, na Kentucky, Mwanje na Nkolo akotaki na lininísa pe atelemaki wana. Likonzi na Móto ezalaki wana.”
Pole ya ntongo ebandaki nde kobengana molili ya mokolo yango ya malili, na sanza ya minei. Lininísa bobele moko ya libaya efungwamaki mpo na kokotisa pole ya ntongo na mwa ndako yango moko ya mabaya. Ndeke moko, rouge-gorge, azalaki pembeni na lininísa yango, azalaki na esengo ya ndenge mosusu na ntongo wana, pe azalaki koyemba na makasi na ye nyonso. Na kati ya ndako, elenge mobali moko, Charles Branham, akotisaki maboko na salopéti na ye ya sika, pe azalaki kotala mwasi na ye ya mibu 15. “Tokopesa ye nkombo William,” elobaki tata na ye bongo.
Pole moko ya kokamwa ekotaki na lininísa. Pole yango etambolaki na ndako pe etelemaki likolo na mbeto, esika bebé autaki kobotama. Ezalaki bobele Pole yango oyo ebimisaki bana ya Baebele na Ezipito. Ezalaki bobele Pole yango oyo ekutanaki na Polo na nzela ya Damaseke. Pe Ekokobaki kokamba bebé yango mpo na kobenga Mwasi na libala ya Klisto ete ábima na mokili. Pole yango ezalaki eloko mosusu te bobele Mwanje na Nkolo, Likonzi na Móto; pe Eutaki lisusu komonana epai na moto.
Pe kuna na kati, na kati ya ndako moke yango ya mabaya, na ntongo ya le 6 avril, mobótisi afungolaki lininísa mpo pole ékota, pe Mama ná Papa bákoka komona ngai. Bongo, Pole ya monene, lokola kusé, ezalaki kobaluka-baluka ezalaki yango kokota na lininísa. Ebalukaki esika ngai nazalaki, pe ekitaki likolo ya mbeto. Ebele na bafándi ya ngomba bazalaki wana. Bazalaki kolela.
Mwa ndako yango ezalaki na bangomba ya súdi ya Kentucky, pembeni na mwa engumba ya Burkesville. Ezalaki le 6 avril 1909. Bebé yango azalaki mwana ya liboso kati na bana zomi, oyo Charles ná Ella Branham babotaki.
Eumelaki ntango molai te, Mwanje na Nkolo akutanaki lisusu na elenge yango, William Branham.
Ntango azalaki mwana, Mwanje alobeláká ye liboso, koloba ete, na bomoi na ye, akofanda pembeni na engumba moko, na nkombo New Albany. Akotaki na ndako pe ayebisaki mama na ye likambo oyo esalemaki. Lokola mama nyonso, akanisaki mingi te likolo na likambo yango pe atindaki ye ákende kolala mpo na kokitisa ye motema. Sima na mibu mibale, libota na bango bakendeki kofanda na Jeffersonville, na Indiana, bobele ba-kilometre moke ekabolaki bango na engumba New Albany, na súdi ya Indiana.
Mwanje alobelaki lisusu elenge mosakoli yango na mibu elandaki. Ezalaki mokolo moko ya kimia na sanza ya libwa, moi ezalaki kongala na nkasa ya lángi ya motáné na eleko ya moi makasi. Mwana yango azalaki kotenga-tenga wana amemaki katíni mibale ya mai na nzela. Akangaki mokókóli ya lisangu na mosapi na ye ya lokolo, esika mpota ezalaki, mpo putulú ékota te. Afandaki mpo ápéma na nse ya nzete monene ya peuplier. Mpisoli ya miso ezalaki kotanga wana azalaki kolela mpo na libaku mabe na ye: Baninga na ye bazalaki na esengo mpo bakendeki kolóbo mbisi, kasi ye atikalaki mpo na komemela papa na ye mai. Na mbala moko, mopepe ebandaki kobaluka na nzete yango likolo na ye. Apangusaki miso pe atelemaki. Ayokaki ndenge nkasa ezalaki kopepa na mopepe…kasi mopepe ezalaki ata moke te. Atómbolaki miso, pe pene na katikati ya nzete yango, eloko moko ezalaki kobalola nkasa ya kokauka.
Na mbala moko Mongongo moko elobaki: “Komela masanga te, komela makaya te pe koyeisa nzoto na yo mbindo na lolenge moko te, ozali na mosala ya kosala ntango okokóla.” Mwana mobali yango ya mibu nsambo abangaki, abwakaki ba-katíni na ye pe akimaki epai ya mama na ye.
Lokola mosakoli Samuele, Nzambe autaki lisusu kolobela mwana yango.
Sima na bapóso moke, azalaki kobeta lisano ya bíle ná leki na ye ya mobali. Amiyokaki ndenge mosusu. Abwakaki miso na ngámbo ya Ebale Ohio pe amonaki gbagba moko ya kitoko. Mibali zomi na motoba bakweaki pe bakufaki ntango gbagba yango ezalaki kotongama. Elenge mosakoli yango autaki komona emononeli na ye ya liboso. Ayebisaki mama na ye, pe mama akomelaki ye likambo yango. Na mibu elandaki, mibali 16 bakweaki pe bakufaki ntango gbagba ya 2ème Rue na Louisville, Kentucky, ezalaki kotongama likolo na Ebale Ohio.
Nkolo azalaki kotalisa ye mamono ya makambo ekosalema sima. Pe, lokola basakoli oyo bazaláká liboso na ye, mamono yango ezangaki kokokisama te.