Maloba ya suka mpenza, oyo ekomami na Kondimana ya Kala, epesi elaka oyo: “Tala, nakotindela bino Eliya mosakoli, liboso na koya ya mokolo monene pe ya nsómo ya YAWE. Akozongisa mitema ya batata epai na bana, pe mitema ya bana epai na batata na bango, ete náyá pe nábeta mokili na ekweli mabe te.” (Malaki 4:5-6)
Mokolo monene pe ya nsómo ya Nkolo ekomi naino te, boye tosengeli kozela mosakoli Eliya na motema mobimba. Na Biblia, basakoli bazalaki koya na ngámbo ya bibongiseli minene te. Bazalaki koya epai na bato moke oyo baponami. Kanísá naino soki mosakoli ya Malaki 4 ayaki, pe bato bazangaki koyamba ye. Ekozala boni soki azali lokola basakoli ya kala, pe bobele bato moke nde bandimi ye? Soki mosakoli yango asengeli koya lisusu na ntango na suka, tokoyeba ye ndenge nini? Eyano emonani polele na kati ya Makomi. Akozala na lolenge ya mosakoli. Akoyeba basekelé ya mitema. Akosala bikamwa. Bibongiseli bakoluka kosala ete bato bándimela ye te. Kasi bato moke, oyo baponámá, nde bakondima ete azali motindami oyo alakámákí mpo na lelo.
Tokoyeba ndenge nini ntango Eliya akoya lisusu? Akotalisa bilembo nini mpo tókoka kondima ye?
Eliya azalaki moto ya zamba. Bikamwa pe bilembo minene elandaki mosala na ye. Atelemelaki misala mabe ya eleko na ye na mateya na ye. Koleka mingi, atelemelaki makambo ya nsoni ya Mokonzi-mwasi Yezabele. Ntango Eliya akamatamaki na Likolo, na likálo ya móto, molimo na ye ekitaki likolo na Elisa. Bikamwa ná bilembo minene pe emonanaki na mosala ya Elisa, atelemelaki pe masumu ya mokili na mateya na ye. Basakoli nyonso mibale, moko na moko atelemelaki bibongiseli ya eleko wana. Sima na mibu nkama na nkama, molimo yango eyaki lisusu na mokili, kati na Yoane Mobatisi. Mosakoli Malaki asakóláká ete Eliya akoya lisusu mpo na kotalisa Nkolo: “Tala, nazali kotinda motindami na ngai, pe akobongisa nzela liboso na ngai…” (Malaki 3:1). Yoane Mobatisi moto akokisaki yango, wana asengaki ete bana na Nzambe bábongola mitema. Lokola Eliya, atelemelaki mokonzi pe bibongiseli ya eleko na ye na mateya na ye. Nkolo Yesu atatolaki ete Yoane Mobatisi azalaki mosakoli ya Malaki 3 na Buku ya Matai (11:10): “Mpo na ye nde ekomámá ete, Tala, nazali kotinda motindami na ngai liboso na yo, pe akobongisa nzela na yo liboso na yo.” Luka 1:17 elobi ete molimo ya Eliya (Elias) esengelaki kozala kati na Yoane Mobatisi, “Lisusu, akotambola liboso na ye na molimo pe na nguya ya Eliya, mpo na kozongisa mitema ya batata epai ya bana.” Kasi tala ete eteni ya mibale ya Malaki 4 ekokisamaki naino te: “…pe mitema ya bana epai ya batata na bango, ete náyá pe nábeta mokili na ekweli mabe te.” Eteni yango ya Makomi ekokokisama liboso na Boyei ya Mibale ya Klisto.
Mibu nkóto mibale sima na Yoane Mobatisi, ntango ekoki lisusu mpo molimo ya Eliya éyá lisusu na mokili.
Mokolo yango ekomi! Na eleko oyo, tomoni molimo ya Eliya koya lisusu. Abeti ntembe na bibongiseli ya eleko oyo. Atelemeli masumu ya mokili. Atalisi bilembo pe bikamwa mingi mpenza. Atei Biblia, liloba moko sima na mosusu, bandá na Genese kino na Emoniseli. Mosakoli ya Malaki 4 ayei ndenge elakamaki, pe atei Nsango oyo euti na Ngwende ya Nzambe na-Nguya-nyonso. Nkombo ya mosakoli yango ezali William Marrion Branham. Tobengaka ye “Ndeko Branham”.
“William Branham, nalingaki ye pe nandimaki ete azali mosakoli ya Nzambe.”
Oral Roberts, mopalanganisi-nsango-malamu oyo ayebani mokili mobimba pe mobandisi ya Université Oral Roberts.
“William Branham ayaki epai na biso lokola mosakoli ya Nzambe pe atalisaki biso, na ekeke ya ntúkú mibale, makambo ndenge moko mpenza na oyo tomonaki na Nsango Malamu… Nzambe ayaki kotala bato na Ye, mpo mosakoli monene atelemisamaki kati na biso.”
Dr. T.L. Osborn, mopalanganisi-nsango-malamu ya ba-Pantekotiste pe mokomi monene.
“Liboso ábondela mpo na moto, azalaki kolobela makambo mike-mike oyo etali bokono ya moto yango, pe lisusu makambo mike-mike ya bomoi na bango – engumba, mimbóngo, misala na bango – azalaki ata kozonga sima, mosika na bolenge na bango. Branham asalaki libunga ata mbala moko te na oyo etali liloba ya bwanya na mibu nyonso oyo nazalaki elongo na ye. Mpo na ngai, ezali makambo nkóto na nkóto.”
Ern Baxter, mopalanganisi-nsango-malamu, mobongisi ya ba-campagne ya Branham kati na mibu nsambo, pe moko na bakambi ya ebandeli ya Mouvement ya Nouvelle Eglise Britanique.
Bandá na eleko Nkolo Yesu Klisto azalaki na mokili, moto moko te aningísá mokili na bozindo ya boye. Na ebandeli mpenza kati na mwa ndako ya mabaya, likolo na bangomba ya Kentucky, kino na Amarillo, na Texas, epai Nkolo azuaki ye mpo na kozongisa ye na Ndako, bomoi na ye ezalaki ntango nyonso na makambo ya kokamwa. Na bokambami ya Mwanje na Nkolo na 1946, mosala ya Ndeko Branham epelaki móto, pe ebandisaki eleko ya mayangani minene ya kolamuka pe ya kobikisa babeli, oyo epalanganaki na Amerika mobimba pe na mokili mobimba. Kino moi ya lelo, bakomeli mikanda ya Baklisto bandimá ye lokola “tata” pe “moto ya liboso” oyo asalaki mayangani minene ya kolamuka pe ya kobikisa babeli na mibu 1950, oyo ebongolaki Lingomba Pantekotiste pe, sukasuka, eyaki kobota mouvement Charismatique, oyo lelo ezali kosala na bibongiseli nyonso, tóloba, ya ba-Protestant. Ata bongo, lokola momesano, bibongiseli balandaka malakisi na ye te pe baboyaka etíndá na ye.
Bisika nyonso azalaki kokende, Nzambe azalaki kotalisa polele ete Ndeko Branham azali mosakoli mpo na ekeke oyo. Lokola Yobo, Nkolo alobelaki ye na kati ya ekumbaki. Lokola Mose, Likonzi na Móto emonanaki pe ekambaki ye. Lokola Mika, atiolamaki na bakambi ya mangomba. Lokola Eliya, azalaki moto ya zamba. Lokola Yilimiya, atindamaki na Mwanje. Lokola Daniele, amonaki mamono ya makambo oyo ekoya sima. Lokola Nkolo Yesu, ayebaki basekelé ya mitema. Pe lokola Polo, abikisaki babeli.
Nkolo ayaki lisusu kotala bato na Ye na nzela ya mosakoli. Na ntango ya molili koleka na masolo ya kalakala, esika bomoto malamu ekweisami mingi mpenza pe mandóki mabomaka boike na bato mbala moko ebandi komonana, moto moko ya komikitisa atindamaki longwa na bozali ya Nzambe mpo na kobenga bato bazali kokufa kobongola mitema.
Moyekoli molingami Yoane akomaki na ntina na Nkolo Yesu:
Makambo mosusu pe ezali mingi, oyo Yesu asalaki, oyo, soki nyonso ekomamaki, nakanisi, ata mokili yango moko elingaki kozanga esika ya kotia mikanda oyo elingaki kokomama. Amen. (Yoane 21:25).
Tokoki pe koloba ndenge moko mpo na bomoi ya Ndeko Branham. Mateya koleka 1.200 etiámá na ba-bande pe ezali na masolo nkóto na nkóto ya bomoi ya moto malamu oyo. Kasi tozali kokoba koyoka matatoli ya sika ya misala ya bomoi na ye likolo na bomoi ya bamilió ya bato. Buku moke oyo ekoki kotalisa ata moke te ebele na mosala monene oyo moto na Nzambe yango asalaki na mokili.