Mamóno ekobaki. Baninga na ye ya mosala, bakambi ya mangomba, bazalaki koloba na ye ete mamóno na ye ezalaki kouta na Nzambe te. Bazalaki koloba na ye ete azalaki na molimo mabe. Likambo yango ezalaki kotungisa ye mingi. Akokaki lisusu komema mokumba yango te, bongo akendeki na zamba mpo na koluka Mokano ya Nzambe. Eutaki mpenza na bozindo ya motema na ye na lolenge ete alakaki ete akozonga te soki azui eyano te. Ezalaki kuna, na kati ya libulu moko ya nkaká, nde Mwanje na Nkolo apesaki ye etinda na ye. Libanda na makambo mosusu, Mwanje ayebisaki ye boye: “Soki osali ete bato bándimela yo, pe soki ozali na bosembo wana ozali kobondela, eloko ata moko te ekotelema liboso na mabondeli na yo, ata pe kansére te.”
Ntembe nyonso esilaki. Azuaki sikawa etinda pe akendeki liboso na mpiko nyonso. Kolamuka ya kobikisa babeli eutaki kobanda.
Bato nkóto nkama na nkama bazalaki na mayangani ya Branham. Bato nkóto na nkóto babikaki na bokono na Nkombo ya Nkolo Yesu Klisto. Ba-evanjeliste mosusu, ndakisa Oral Roberts, T.L. Osborn, ná A.A. Allen, balandaki Ndeko Branham nokinoki, pe babandaki ba-kolamuka na bango ya kobikisa babeli. Nkolo asopaki mapamboli na Ye koleka, oyo bamónáká naino te. Loboko ya Yesu Klisto, oyo ebikisaka, esimbaki lisusu bato na Ye.
“Nalelaka mingi na esengo mpo na likabo oyo Nzambe, oyo auti kopesa na lingomba ya ndeko na biso molingami, William Branham, ná likabo na ye ya kokamwa, ya kobikisa babeli. Oyo ezali nde Nzambe moto azali kosala makambo mingi, koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa (Baefese 3:20), mpamba te, namóná to natángá naino te likambo lokola mosala ya kobikisa babeli ya William Branham.”
Rev. F.F. Bosworth, evanjeliste oyo ayebani na mokili mobimba pe moko na batata oyo basálá ebongiseli ya ba-Assemblée de Dieu ná lingomba Pantekotiste ya lelo.
“Mokolo moko, tozalaki kotala ndenge azalaki kosolola na mobali moko oyo alalaki na mbeto. Liboso, eloko ata moko etalisaki te ete mobali yango azali kososola. Na sima, mwasi na ye, oyo azalaki pembeni na ye, alimbolaki ete mobali yango azalaki kobunda na liwa mpo na kansére, pe ete matoi na ye ekúfá, azalaki koyoka makambo oyo ezalaki kolobama te.
Bongo, Ndeko Branham alobaki ete esengeli liboso ete mobali yango áyoka mpo áyebisa ye makambo oyo etali kobikisama na ye na kansére. Abondelaki na ntango moko. Na mbala moko mobali yango abandi koyoka! Mpisoli ya monene etiolaki na matama ya mobali yango, oyo na mpokwa mobimba wana, elongi na ye ezalaki kotalisa ata elembo moko ya lisosoli to ya esengo te. Ayokaki na bokebi nyonso ntango asololaki na ye mpo na kobikisama na kansére.”
Rev. Gordon Lindsay, mokomi monene, motei, pe mobandisi ya Institut Christ Pour Les Nations.
“Ndeko Branham alobaki: ‘Moto ya Congrès abikisami.’ Motema na ngai ebetaki makasi. Napusanaki pe nandimaki Nkolo lokola Mobikisi ya nzoto na ngai. Nasundolaki nzete na ngai ya bibósono…pe Lola ekitaki!”
William D. Upshaw, Moto ya Congrès ya Amerika (1919-1927), alukaki ete bápona ye Prezidá ya Amerika na 1932. Ntango azalaki mwana moke, akweáká, mokongo na ye ebukanáká, pe akómáká ebosono. Azalaki na mibu 84 ntango abikisamaki na mobimba, na libondeli ya Ndeko Branham, sima na ye kozala ebósono mibu 66. Azalaki lisusu na bosenga ya veló to nzeta ya bibósono te sima na yango.
“Nazalaki na mbeto mibu mwambe ná sanza libwa mpo na bokono ya tiberkilóze, pe minganga bakokaki lisusu kosalisa ngai te. Nakokaki kokómisa kilo ntuku mibale na mitano te, pe elikia nyonso esilaki. Na sima, Rev. WM Branham ya Jeffersonville, na Indiana, ayaki, kokokana na emononeli oyo amonaki ya mwana mpate oyo akangamaki na zamba, pe azalaki kogánga ‘Milltown’, ezali esika ngai nafandaka. Ndeko Branham akómáká naino awa te, to ayébáká naino moto moko ya awa te. Ntango ayaki, atielaki ngai maboko pe abondelaki, abelelaki Nkombo ya Nkolo pe molingami na biso Yesu likolo na ngai. Ezalaki lokola eloko moko ekangaki ngai, pe, na mbala moko, natelemaki, pe nazalaki kotónda Nzambe mpo na nguya na Ye ya kobikisa. Nazali sikawa mobeti piano na lingomba Batiste ya awa.”
Georgia Carter, Milltown, Indiana, abikisamaki na tiberkilóze oyo elingaki koboma ye na 1940, pe abelaki lisusu bokono yango ata mokolo moko te na bomoi na ye. Azali moko na bato nkóto ntúkú na ntúkú oyo babikisámá na nzela na mosala na ye ya koteya, pe oyo bazali kobikisama kino lelo.