Yoane 14:12

Solo, solo, nazali koloba na bino, Ye oyo akondimela ngai, misala oyo nazali kosala, ye pe akosala yango; akosala misala ya minene koleka oyo; mpo ete nazali kokende epai na Tata na ngai.


Malako 16:17-18

Bilembo oyo ekozala na baoyo bakondima; Na nkombo na ngai, bakobengana milimo mabe; bakoloba minoko ya sika;

Bakolokota banyoka; pe soki bameli eloko oyo ebomaka, ekosala bango mabe te; bakotiela babeli maboko, pe bakobika.


Biso nyonso tokoki kobalola nkasa ya Biblia pe komona ete Nzambe asalaka bikamwa: Mose akabolaki Mai na Mbu Motane, Eliya abengaki nzala, Yesu atambolaki likolo na mai, pe bayekoli babikisaki babeli.

Ezali na bikamwa nkóto na nkóto oyo ekomami na Biblia. Soki Nzambe atatolaka na bilembo pe bikamwa, boye, lelo, bikamwa na Ye ezali wapi? Akoki kobikisa kansére ndenge Abikisaki mbálá na Biblia? Boni na bokono ya SIDA to malaria? Akoki pe kosala bikamwa? Iyo, Nzambe azali kokoba kosala bikamwa pe bilembo yango ezali kolanda baoyo bazali kondima.

Sikawa, bóyoka baninga, bókanisa Mokonzi George ya Angleterre, ntango abikisamaki na bokono ya sclerose, wana tobondelaki mpo na ye. Bókanisa Florence Nightingale, (nkóko na ye ya mwasi azaláká mobandisi ya Croix Rouge), azalaki na kilo soko ntuku misato, alalaki wana pene na liwa, azalaki na kansére na suka ya estomá, alalaki wana pene na liwa. Ebengá moko ya moke eyaki pene na nzete oyo ezalaki wana pe Molimo ya Nzambe eyaki pe elobaki: “YANGO ELOBI NKOLO, akokufa te.” Akómi na kilo ntuku libwa na ndambo pe azali na nzoto kólóngónu.

Bókanisa moto ya Congrès, Upshaw, oyo azalaki kotambola na kiti ya bibósono pe kolala na mbeto mbúla na mbúla, mibu ntuku motoba na motoba. Pe na mwa ntango moke, atelemaki, apotaki mbangu na kati ya losambo, asimbaki misapi na ye ya makolo, akómaki malamu mpenza pe abikisamaki.

Bókanisa bato nkóto na nkóto oyo babikisámá. Mpo na nini tofandi awa kozela liwa? Tósala likambo moko mpo na yango.

Zalá na kondima soki ozali na bokono to bosenga. Biblia elobi ete Yesu Klisto azali ndenge moko lobi, lelo, pe libela, boye, soki Akokaki kosala ekamwiseli eleki mibu nkóto mibale, Akoki pe kosala ndenge moko lelo. Alakaki biso ete tokobikisama, soki tozali bobele na kondima.

Congrès, Upshaw

William D. Upshaw asalaki mosala mibu mwambe na Chambre ya ba-Représentant ya Etats-Unis pe alukaki ete bápona ye lokola prezidá na 1932. Likama ya mosala ya bilanga ebukaki ye na bolenge na ye, pe asalaki mibu 66 na banzete to na kiti ya bibosono. Na 1951, abikisamaki na mobimba pe atambolaki malamu mpenza na mikolo ya bomoi na ye.

 
Florence Nightingale

Florence Nightingale, mokitani ya infirmière moko ayebanaki mingi, azalaki na kansére ya estomá oyo ezalaki kosila te. Atíndáká fotó oyo lokola mbélá ya suka mpo bábondela mpo na ye liboso ete kansére éboma ye. Ndenge bozali komona, alingaki mpenza kokufa soki Nkolo Yesu abikisaka ye te na 1950. Fotó oyo mosusu bakangaki yango ntango asilaki kobikisama pe batindaki yango lokola litatoli ete Nzambe azali kokoba kobikisa babeli.


Tris Griffin

Tris Griffin akendeki epai na monganga na ebandeli ya mobu 2013 mpo na mpasi ya mokongo, oyo azalaki kobanga ete ábunda lisusu na kansére. Masíni ya monganga etalisaki ete “mosisa epasukaki” na motema na ye, nde ekambaki minganga ete básala ba-examé mosusu pe báléngela lipasó na mokolo oyo elandaki. Mokólótó oyo eleki na motema, na elilingi, ezali elembo ya kopasuka yango mpenza, oyo elingaki koboma ye nokinoki soki ekatanaki.

Na mokolo elandaki, sima na bandimi kobondela mpo na ye, minganga batalaki lisusu na masíni mpo báyeba mpenza esika oyo epasukaki liboso bápasola. Na mbala oyo, bililingi etalisaki motema oyo esili kobikisama mpenza. Monganga azuaki kizungu-zúngu, pe alobaki na Madame Griffin: “Nayebi eloko nini náyebisa yo te. Mosisá ya motema na yo epasukaki, kasi sikawa yango nyonso esili nye.” Alakisaki ye bililingi bazuaki liboso na libondeli, pe oyo ya sima. “Ozali na bonsomi ya kokende, na yango, elembo ya kansére ezali ata moke te. Ozali mpenza na nzoto kólóngónu.”

 

Likongá ya monganga ezali kotalisa mosisá ya motema, ezali libúngútulú ya moíndo oyo ezali na katikáti ya elilingi. Mokólótó oyo eleki wana ezali eteni moko to “kopasuka” ya mosisá na motema, oyo esengaka lipasó nokinoki pe ebomaka soki ekatani. Elilingi ya mibale oyo ezuamaki mokolo elandaki. Kopasuka yango elímuaki mobimba pe ekendé libela.

Bisika ekomami

Nzembo 103:2-3

Pambola Yawe, E molimo na ngai, pe kobosana te bolamu na ye nyonso:

Ye oyo alimbisaka libunga na yo mobimba; oyo abikisaka maláli na yo nyonso;

Yisaya 53:5

Kasi azokisamaki mpo na masumu na biso, atutamaki mpo na mabe na biso: etumbu mpo na kimia na biso ezalaki likolo na ye; pe na mapipi na ye, biso tobikisami.

Malako 16:17

Bilembo oyo ekozala na baoyo bakondima; Na nkombo na ngai, bakobengana milimo mabe; bakoloba minoko ya sika;

Luka 17:6

Nkolo alobaki ete, Soki bozalaki na kondima lokola mbuma ya mutarde, mbele bolobi na nzete oyo ya sikaminosi ya moíndo ete, Pikólámá pe lónámá na mbu; pe etosi bino.

Yoane 14:12

Solo, solo, nazali koloba na bino, Ye oyo akondimela ngai, misala oyo nazali kosala, ye pe akosala yango; akosala misala ya minene koleka oyo; mpo ete nazali kokende epai na Tata na ngai.

I Batesaloniki 1:5

Mpo nsango malamu oyo tozali kosakola eyaki epai na bino kaka na maloba te, kasi pe na nguya, pe na Molimo Mosantu, pe na kondima makasi; ndenge boyebi motindo ya bato biso tokómaki epai na bino mpo na bolamu na bino.

Baebele 2:3-4

Tokokima ndenge nini, soki totioli lobiko monene ya ndenge wana oyo Nkolo na biso asakolaki liboso pe oyo bato oyo bayokaki ye bamonisaki biso ete ezali solo;

Wana Nzambe pe apesaki litatoli elongo na bango, na bilembo pe makamwisi, pe na bikamwa ndenge na ndenge, pe makabo ya Molimo Mosantu, kokokana na mokano na ye?

Baebele 13:8

Yesu Klisto azali ndenge moko lobi, lelo, pe libela.

Yakobo 5:15

Libondeli ya kondima ekobikisa mobeli, pe Nkolo akotelemisa ye; pe soki asalaki masumu, ekolimbisama.

I Petelo 2:24

Ye moko amemaki masumu na biso na nzoto na ye mpenza likolo na nzete, mpo tótika masumu, pe tózala na bomoi ya boyengebene: bobiki na mapipi na ye.