Yoane 5:28-29

Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ntango ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya nkunda bakoyoka mongongo na ye,
pe bakobima, baoyo basalaki malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo basalaki mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.


Mokolo moko ezali koya, oyo moko na moko na biso, Moklisto to te, akomona mpenza eloko nini ezali na ngámbo mosusu ya ridó ya ntango. Biblia elaki Bomoi ya Seko na bamoko, pe na bamosusu, elaki kosambisama. Bandá mokili ebandá, na ntembe te, moto nyonso asílá komituna: “Likambo nini ekokómela ngai ntango nakokufa?”

Kalakala mpenza, liboso Biblia ya kotánga ékomama, mosakoli Yobo atalaki malamu bikelamu. Alobelaki elikia ya nzete, ndenge ekufaka soki bakati yango, kasi soki mai ebelemi na yango, ekozonga na bomoi pe ekobimisa bitape ya sika. Yobo ayebaki ete moto, lokola nzete, akozonga lisusu na bomoi:

Soki moto akufi, akozonga lisusu na bomoi? mikolo nyonso ya kotindama oyo batindamaka na mosala makasi, nakozela, kino ntango kobondisama na ngai ekoya.

Yo okobenga, pe ngai nakoyanola yo: okozala na mposa makasi ya mosala ya maboko na yo.

Mpo sikawa, ozali kokoba kotánga matambe na ngai: ozali kotala eloko mosusu te bobele masumu na ngai? (Yobo 14:14-16)

Mbala mosusu Yobo azalaki na Biblia ya kotanga te, kasi ayebaki ete mokolo moko Nzambe akosekwisa ye longwa na nkunda ntango Mosikoli ya bato akoya.

Aa soki bákomaka maloba na ngai sikawa! aa soki bákomaka yango na buku!

Soki bákomaka yango na ekomeli ya ebende pe na mondulu likolo na libanga mpo na libela.

Ngai nayebi ete mosikoli na ngai azali na bomoi, pe ete na suka akotelema na putulú:

Pe atako nkusú ya loposo na ngai ebebisi nzoto oyo, ngai nakomona Nzambe longwa na mosuni na ngai: (Yobo 19:23-26)

Mosakoli azalaki kolobela Nkolo Yesu pe lisekwa ya libota na Ye. Na nzela na emoniseli, Yobo ayebaki ete ata soki banzoto na biso ekoki kobeba mobimba, Yesu akozongisa misuni na biso. Pe na miso na biso moko, tokomona Boyei na Ye. Bato nyonso ya Nzambe bazalaka na mposa makasi ya komona mokolo ya nkembo yango.

Kasi, bobele ndenge Nzambe azali mpenza, zabolo pe azali; pe bobele ndenge Lola ezali, lifelo pe ezali. Likambo yango elekelaka biso. Ntoma Polo alobaki: “Liso emóná te pe litoi eyóká te, pe eyá na motema ya moto te, makambo oyo Nzambe abongísá mpo na baoyo balingaka ye.” (I Bakolinti 2:9)

Makanisi na biso ekoki kososola te kitoko ya Lola, ekoki pe kososola te nsomo ya lifelo. Yesu alobaki na biso ete lifelo ezali mabe mingi na lolenge ete ekozala malamu tókata enama moko ya nzoto na biso na esika ya kozua likámá ya kokende na esika ya nsomo wana.

Pe soki loboko na yo ebetisi yo libaku, kata yango; eleki malamu ókota na bomoi ebosono, na esika ya kokende na maboko mibale na lifelo, na móto oyo ekoki kobomama te. (Malako 9:43)

Boye nani akokende na Lola? Pe nani akokende na lifelo? Ezali likanisi ya mawa, kasi Yesu alobaki ete bato mingi bakozanga libonza oyo Alingi kopesa biso: Bókota na ekuke ya moke; mpamba te nzela ya monene pe oyo efungwámá nde oyo ememaka na libebi, pe bato oyo bazali kokota kuna bazali mingi; Mpo ete ekuke oyo ya moke pe nzela ya nkaká, yango nde ememaka na bomoi, pe bato oyo bazali komona yango bazali moke. (Matai 7:13-14)

Yesu alobaki lisusu: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai, Nkolo, Nkolo, nde bakokota na bokonzi ya likolo; kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likolo. Na mokolo yango, bato mingi bakoloba na ngai, Nkolo, Nkolo, Tosakolaki na nkombo na yo te? pe tobenganaki milimo mabe na nkombo na yo te? pe tosalaki misala ya nguya na nkombo na yo te? Nzoka nde nakoloba na bango polele ete, Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato na misala ya mabe.” (Matai 7:21-23)

Komibenga Moklisto elingi koloba te ete obikisami. Boye, motuna ya polele na makanisi na biso yango oyo: Ndenge nini nakozua Bomoi ya Seko? Yesu apesaki biso eyano ya pete: Solo, solo, nalobi na bino ete, Ye oyo akoyoka liloba na ngai, pe akondimela ye oyo atindi ngai, azali na bomoi ya seko, pe akosambisama te; kasi alongwe na kufa akómi na bomoi. (Yoane 5:24)

Ezali mawa mingi été bato moke mpenza na mokili lelo oyo balingaka kozua ntango na misala na bango ya mokolo mobimba mpo na koyoka Liloba ya Nzambe. Pe bazali lisusu moke koleka, baoyo bandimaka Liloba sima na koyoka yango.

Mangomba elobaka na biso ete tózala bato malamu, tókanisa makambo ya malamu, tókosa te, tóbúba te, to tóyiba te, pe tokokende na Lola. Basosolaka te ete lifelo ekotonda na bato oyo bomoi na bango emonanaka lokola bomoi ya malamu. Solo ezali ete tokokota na Lola te mpo na misala na biso ya malamu to mpo tosambelaka na lingomba moko boye. Ezali bobele na nzela moko ememaka na Bomoi ya Seko, ezali na nzela ya Yesu Klisto. Alakisa na biso ete tosengeli kondima Liloba na Ye, yango nde Biblia. Soki te, tokobika ndenge nini?

Ntango mokolo ya kosambisama ekokoka mpo na yo, okoyoka maloba oyo: “Yaka, yo mopámbolami ya Tata na ngai, zuá libula ya bokonzi oyo ebongisámá mpo na yo longwa na ebandeli ya mokili,” (Matai 25:34) to okoyoka: “Longwá mosika na ngai, yo molakelami mabe, kendé na móto ya seko oyo ebongisámá mpo na zabolo ná banje na ye”? (Matai 25:41)

Ntango miso na yo ezali kotánga maloba oyo, esengeli na yo kopona: Osepeli kopona kondima Liloba ya Nzambe?

Okolekisa seko na seko wapi?







Bisika ekomami

Yobo 14:12-16

Moto pe asengeli kolala, pe akotelema te. kino ntango likolo ekozala lisusu te, bakolamuka te, bakolamusama pe na mpongi na bango te.

Aa soki óbombaka ngai ata na nkunda, soki óbombaka ngai kino nkanda na yo ekozonga sima, soki ókatelaka ngai ata ntango mpo ókanisa ngai!

Soki moto akufi, akozonga lisusu na bomoi? Mikolo nyonso ya kotindama oyo batindamaka na mosala makasi, nakozela, kino ntango kobondisama na ngai ekoya.

Yo okobenga, pe ngai nakoyanola yo: Okozala na mposa makasi ya mosala ya maboko na yo.

Mpo sikawa, ozali kokoba kotánga matambe na ngai: ozali kotala eloko mosusu te bobele masumu na ngai?

Yobo 19:23-26

Aa soki bákomaka maloba na ngai sikawa! aa soki bákomaka yango na buku!

Soki bákomaka yango na ekomeli ya ebende pe na mondulu likolo na libanga mpo na libela.

Ngai nayebi ete mosikoli na ngai azali na bomoi, pe ete na suka akotelema na putulú:

Pe atako nkusú ya loposo na ngai ebebisi nzoto oyo, ngai nakomona Nzambe longwa na mosuni na ngai:

Matai 7:21-23

Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai, Nkolo, Nkolo, nde bakokota na bokonzi ya likolo; kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likolo.

Na mokolo yango, bato mingi bakoloba na ngai, Nkolo, Nkolo, Tosakolaki na nkombo na yo te? pe tobenganaki milimo mabe na nkombo na yo te? pe tosalaki misala ya nguya na nkombo na yo te?

Nzoka nde nakoloba na bango polele ete, Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato na misala ya mabe.

Matai 22:14

Mpo bato mingi babengami, kasi moke nde baponami.

Yoane 3:16-17

Mpo Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki mwana na ye se moko, mpo moto nyonso oyo akondimela ye akufa te kasi azua bomoi ya seko.

Mpo Nzambe atindaki mwana na ye na mokili, mpo asambisa mokili te, kasi mpo mokili ebika na nzela na ye.

Yoane 5:24

Solo, solo, nalobi na bino ete, Ye oyo akoyoka liloba na ngai, pe akondimela ye oyo atindi ngai, azali na bomoi ya seko, pe akosambisama te; kasi alongwe na kufa akómi na bomoi.

I Bakolinti 2:9

Liso emóná te pe litoi eyóká te, pe eyá na motema ya moto te, makambo oyo Nzambe abongísá mpo na baoyo balingaka ye.

I Batesaloniki 4:13-18

Lisusu, bandeko, tolingi te ete bozanga koyeba makambo oyo etali bato oyo balali; mpo boyoka mawa te lokola bamosusu oyo bazangi elikia.

Mpo soki kondima na biso ezali ete Yesu akufaki pe asekwaki, ndenge moko pe, baoyo balali kati na Yesu, Nzambe akozongisa bango na bomoi elongo na ye.

Mpo tala oyo tozali koyebisa bino na kolanda liloba ya Nkolo, ete biso bato ya bomoi oyo tozali kotikala kino komonana na Nkolo tokoleka soki moke te liboso na baoyo balali.

Mpo Nkolo ye moko akokita uta na likolo na kogánga makasi, na mongongo ya mwanje mokonzi, pe na kelelo ya Nzambe, pe bakufi kati na Klisto bakosekwa liboso.

Na sima biso bato ya bomoi oyo totikali, tokonetwa elongo na bango na mapata, mpo na kokutana na Nkolo na mopepe; pe na ndenge yango tokozala libela elongo na Nkolo.

Na yango, bóbóndisanaka na maloba oyo.