Nzembo 96:13
Liboso na YAWE: mpo ayei, mpamba te ayei kosambisa mabele : akosambisa mokiki na boyengebene, pe bato na solo na ye.
Ezali na bibongiseli nkóto na nkóto na mokili lelo. Losambo moko na moko ezali kokweisa mosusu, kasi bango nyonso bazali kolaka lobiko na nzela na ebongiseli na bango. Ndenge nini tokoyeba oyo tosengeli kopona?
Soki toponi lingomba Katoliko, boye tokondima ete basantu bálobela biso, yango elingi bobele koloba kosambela bikeko. Biblia elobi: “Mpo Nzambe azali bobele moko, pe molobeli bobele moko kati na Nzambe ná bato, ye moto Klisto Yesu;” (I Timote 2:5). Babéngaka sángó “Tata” kasi Yesu apekisaki yango na Matai 23:9: “Lisusu, bóbénga moto moko te tata na bino awa na mabelé: mpo moto moko kaka nde azali Tata na bino, oyo azali na likolo.” Ba-Assemblée de Dieu balobaka na biso ete koloba minoko na sika nde ezali etaliseli ya liboso ya Molimo Mosantu, nzokande Polo alobaki: “Ata nakoloba na minoko ya bato pe ya banje kasi nazangi bolingo, nazali lokola ngonga to sembále oyo ezali kolela.” (I Bakolinti 13:1)
Pene na mangomba nyonso ewélaka koloba na biso ete makambo mingi na Biblia elimbolami mabe, ebongolami mabe, to elongobani na mokili ya lelo te. Boye, tosengeli kondimela Biblia to malakisi ya bibongiseli? Eloko nini Nzambe akosalela lokola emekeli mpo na kosambisama?
Soki totuni Bakatoliko oyo bazali awa na mpokwa ya lelo: “Bokanisi ete Nzambe akosambisa mokili na eloko nini?” Bakatoliko balobaka: “Na Lingomba Katoliko.” Malamu, sikawa Lingomba Katoliko oyo wapi? Mpo bazali na oyo ya Roma, ya Ortodox Grek, ná bamosusu mingi. Ekozala Lingomba Katoliko oyo wapi? Ba-Luterien bakoloba: “Na biso,” boye bino ba-Batiste bolongolami. Lisusu soki tolobi: “Na ba-Batiste,” boye bino ba-Pantekotiste bolongolami. Boye ekozala mobulu makasi, pe moko te akoyeba eloko nini kosala; boye, Alakaki ata moke te ete akosambisa mokili na nzela ya lingomba.
Alakaki ete akosambisa mokili na nzela ya Klisto, pe Klisto azali Liloba. Pe Biblia nde ekosambisa mokili, yango ezali Yesu Klisto motindo moko lobi, lelo, pe libela.
Bisika ekomami
Yoane 1:1
Na ebandeli ezalaki Liloba, pe Liloba ezalaki elongo na Nzambe, pe Liloba ezalaki Nzambe.
Yoane 1:14
Pe Liloba ekómaki nzoto, pe efandaki elongo na biso (pe tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola oyo ya mwana na likinda ya Tata,) atondaki na ngolu pe na solo.
Yoane 5:22
Mpo Tata azali kosambisa moto te, kasi Apesi kosambisa nyonso na maboko ya mwana:
Yoane 12:48
Moto oyo azali koboya ngai, pe azali koyamba maloba na ngai te, azali na oyo akosambisa ye: liloba oyo nalobi nde ekosambisa ye na mokolo ya suka.
Baefese 1:5-7
Akanaki liboso mpo na biso ete tózala bana na ye kati na Yesu Klisto pelamoko mwango ya mokano na ye,
Mpo na lisanzoli na ngolu na ye na nkembo oyo ekabolaki ye biso kati na ye Molingami.
Na ye tozui lisiko na nzela na makila na ye, kolimbisama na mabunga pelamoko ngolu na ye efuluki mingi mpenza;
Baefese 2:5-8
Ata wana ezalaki biso bakufi kati na masumu, azalisi bison a bomoi esika moko na Klisto, (bobiki na ngolu mpenza;)
Pe asekwisi biso na ye, afandisi pe biso na ye na bisika na likolo kati na Klisto Yesu:
Ete na bikeke bikoya ámonisa kofuluka na ngolu na ye na nzela na boboto na ye epai na biso kati na Klisto Yesu.
Bobiki na ngolu na nzela na kondima; yango euti na bino te: ezali likabo na Nzambe:
I Yoane 1:7
Kasi soki totamboli kati na pole, lokola ye azali kati na pole, tozali na lisanga kati na biso, pe makila ya Yesu Klisto mwana na ye ezali kopetola biso na masumu nyonso.
Emoniseli 22:18-19
Nazali kotatola moto nyonso oyo azali koyoka maloba ya lisakoli ya mokanda oyo ete, Soki moto abakisi likambo mosusu na makambo oyo, Nzambe akobakisela ye malozi oyo ekomami na mokanda oyo;
Pe soki moto alongoli liloba moko na maloba ya mokanda ya lisakoli oyo, Nzambe akolongola likabo na ye na buku ya bomoi, pe na engumba ya bulee, pe na makambo oyo ekomami na mokanda oyo.