Na ntembe te, libatisi ezali na motuya monene, kasi ndenge ya kobatisama ekosala nini? Libatisi ya malamu ezali, to nyonso ezali malamu? Soki ondimaka Biblia, boye IYO, libatisi ya malamu ezali.
Mangomba mingi babatisaka na Nkombo ya Tata, Mwana, pe Molimo Mosantu, kasi yango ezali malamu te kokokana na Biblia.
Na Misala 19, bato moko basiláká kondimela Yesu Klisto, kasi bazuáká naino Molimo Mosantu te na mitema na bango. Ntoma Polo ayebaki lolenge ya malamu mpo na koyamba Molimo Mosantu, boye atunaki bango: “Bongo, bozui libatisi nini?” Pe balobaki: “Libatisi ya Yoane.” (Misala 19:3) Polo amonaki ete babatisamaki te kokokana na motindo ya Petelo na Misala 2:38, boye atindaki bango ete bábatisama lisusu na Nkombo ya Nkolo Yesu. Boye, ndenge elakamaki, bazuaki Molimo Mosantu.
Boye, mpo na nini bayekoli babatisaki na Nkombo ya Yesu, nzokande Yesu, Ye moko, alobaki na bango bábatisa na Nkombo (“bankombo” te) ya Tata, pe ya Mwana, pe ya Molimo Mosantu? (Matai 28:19) Basalaki nde libunga? Te! Basalaki mpenza ndenge batindaki bango.
Ntango ozali kotánga mokanda oyo, kanisa nkombo na yo. Ozali mwana? Nkombo na yo ezali “Mwana”? Ozali mama? Nkombo na yo ezali “Mama”? Ata moke te, yango ezali bobele bibiangelo. Ozali na nkombo na yo mpenza, ezali bongo pe na Nzambe.
Eyano yango oyo:
Ata moto moko te kati na Biblia abatisámá na nkombo ya Tata, Mwana, pe Molimo Mosantu; mpo ezalaka te. Tata ezali nkombo te; Mwana pe ezali nkombo te; Molimo Mosantu pe ezali nkombo te; kasi Nkombo ya Tata, Mwana, Molimo Mosantu ezali Nkolo Yesu Klisto.
Yesu Klisto azali Nzambe! Ye azali Tata, Mwana, pe Molimo Mosantu.
Soki ozali koluka Molimo Mosantu pe ozali komituna mpo na nini Nkolo apesi yo yango naino te, okoki komituna motuna yango moko oyo Polo atunaki: “Bongo, ozuá libatisi nini?”
Bisika ekomami
Matai 28:19
Yango wana, bókende pe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata, pe ya Mwana, pe ya Molimo Mosantu:
[Nkombo ya Tata ezali nini? Nkombo ya Mwana? Nkombo ya Molimo Mosantu?]
Malako 16:16
Ye oyo akondima pe akobatisama akobikisama; kasi ye oyo akondima te akokweisama.
Yoane 5:43
Nayei na nkombo ya Tata na ngai, kasi bozali koyamba ngai te; soki moto mosusu ayaki na nkombo na ye moko, mbele boyambaki ye.
[Soki Ayei na Nkombo ya Tata na Ye, boye Nkombo na Ye ezali nini?]
Yoane 10:30
Ngali ná Tata na ngai tozali moko.
Yoane 12:45
Pe ye oyo amoni ngai amoni ye oyo atindi ngai.
Yoane 14:8-9
Filipe alobi na ye, Nkolo, lakisa biso Tata, pe ekoki mpo na biso.
Yesu alobi na ye, Naumeli na bino mingi boye, pe atako bongo, yo Filipe oyebi ngai kaka te? Ye oyo amoni ngai amoni Tata. Ndenge nini olobi ete, Lakisa biso Tata?
Yoane 20:27-28
Bongo alobi na Tomá ete, Tia mosapi na yo awa, pe tala maboko na ngai, pe kamata loboko na yo pe tia yango na mopanzi na ngai, tika ntembe, kasi zalá nde na kondima.
Pe Tomá azongisi monoko pe alobi na ye ete, Nkolo na ngai pe Nzambe na ngai.
Misala 2:38-39
Petelo alobi na bango ete, Bóbongola mitema, pe moko na moko na bino ábatisama na nkombo ya Yesu Klisto mpo na bolimbisi ya masumu na bino, pe bokozua likabo ya Molimo Mosantu.
Mpo elaka ezali mpo na bino, pe mpo na bana na bino, pe mpo na baoyo nyonso bazali mosika, baoyo nyonso Nkolo Nzambe na biso akobenga.
Misala 4:12
Lobiko pe ezali na moto mosusu te, mpo nkombo mosusu ezali te na nse ya lola, oyo epesami na kati ya bato, oyo tosengeli kobika na nzela na yango.
Misala 8:12
Kasi ntango bandimaki Filipe, oyo azalaki kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe pe ya nkombo ya Yesu Klisto, babandaki kobatisama, mibali ná basi.
Misala 19:3-6
Pe alobaki na bango, Boye, bozuaki libatisi nini? Balobaki ete, Libatisi ya Yoane.
Polo alobaki ete, Yoane abatisaki na libatisi ya kobongola motema, azalaki koyebisa bato ete bándimela moto oyo azalaki koya sima na ye, elingi koloba, Klisto Yesu.
Ntango bayokaki bongo, babatisamaki na nkombo ya Nkolo Yesu.
Pe ntango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu ekitelaki bango, pe babandaki koloba minoko mosusu, pe kosakola.
Baefese 4:5
Nkolo moko, kondima moko, libatisi moko,
Bakolose 3:17
Pe nyonso oyo bokosala na maloba to na misala, bósala nyonso na nkombo ya Nkolo Yesu, bópesa Nzambe Tata matondi na nzela na ye.
I Yoane 5:7
Mpo biloko misato ezali kopesa litatoli na likolo: Tata, Liloba pe Molimo Mosantu: pe yango nyonso misato ezali eloko moko.