Malaki 4:1

Mpo, tala, mokolo ezali koya, ezali kopela lokola litumbu ya móto…


Malaki 4:5-6

Tala, nakotindela bino Eliya mosakoli liboso na koya ya mokolo monene pe ya nsómo ya YAWE.
Akozongisa mitema ya batata epai na bana, pe mitema ya bana epai na batata na bango, ete naya pe nabeta mokili na ekweli mabe te.


Buku ya suka ya Kondimana ya Kala elaki kobebisama ya mokili. Kasi liboso na suka, esakolamaki ete Eliya mosakoli akoya pe akotalisa Masiya. Bato mosusu balobaka ete Yoane Mobatisi akokisaki lisakoli yango.

Eleki mibu nkóto mibale, Bayuda bazalaki kozela boyei ya Masiya. Bayebaki ete Malaki asakoláká ete mobali moko, oyo akozala na molimo ya Eliya, akotalisa bango Masiya. Kasi ntango Yoane Mobatisi ayaki, azalaki te oyo bango bakanisaki ete Eliya akozala. Ntango batunaki Yesu, mpo na nini Eliya ayaki liboso te, Ayebisaki bango polele ete Yoane nde azalaki kokokisama ya lisakoli yango: “Pe soki bolingi kondima yango, ye nde Eliya oyo asengelaki koya.” (Elias na lokótá ya Greki ezali Eliya na Baebele.)

Bobele bato moke nde bandimaki emoniseli yango. Mpo na bakambi mingi ya mangomba, Yoane azalaki bobele moto ya kolekisa ndelo oyo azalaki kotelemela bibongiseli na bango. Bazangaki bobele kososola molimo ya Eliya te, kasi likambo mabe koleka ezali ete, bazangaki pe kososola Boyei ya Klisto.

Boye, Yoane Mobatisi akokisaki nde lisakoli ya Malaki? Na mobimba te.

Likambo ya liboso, mokili “epeli naino lokola litumbu ya móto” te, na bongo toyebi ete ata bongo, eteni mosusu ya Malaki 4 esengeli kokokisama. Eteni mosusu ya Likomi yango, oyo ekokisamaki na Yoane te, ezali, “akozongisa mitema ya bana epai ya batata na bango.” Pe, Yesu, Ye moko, asakolaki ete Eliya akoya (na sima) pe akobongisa makambo nyonso. (Matai 17:11)

Yango wana tosengeli kozela Eliya liboso na Boyei ya Mibale ya Klisto!

Sikawa, na mikolo oyo, ntango ekoki mpo na Boyei ya Mibale ya Nkolo Yesu. Lisusu, tozali na elaka ete molimo ya Eliya nde ekotalisa Ye epai na biso kokokana na Malaki 4. Kasi bato nini bakososola Eliya ntango akoya? Bobele baoyo bazali kozela ye.

Maloba oyo ya Nkolo pe Mobikisi na biso eyaka na makanisi ntango tokanisaka lisakoli ya Malaki mpo na bangonga oyo ya suka ya ntango:

Kasi nazali koloba na bino ete Eliya asílá koya, pe bayebaki ye te… Matai 17:12

Ekozala boni soki tozangi kososola boyei oyo ya Eliya? Tokozanga pe kososola Boyei ya Mibale ya Klisto, ndenge bakomeli ná Bafalisayi bazangaki kososola Boyei na Ye ya Liboso mpo bandimaki Yoane Mobatisi te?

 

 

 

 

Bisika ekomami

II Mikonzi 2:15

Ntango bana ya basakoli oyo bazalaki na Yeriko bamonaki ye na mosika, balobaki, Molimo ya Eliya ekiti likolo na Elisa. Pe bayaki kokutana na ye, pe bagumbamaki liboso na ye kino na nse.

Yisaya 40:3-4

Mongongo ya moto oyo azali kogánga na biliki, Bóbongisa nzela ya YAWE, kati na esika ekaúká, bósembola balabala monene mpo na Nzambe na biso.

Lobwaku nyonso ekotombwama, pe ngomba nyonso, ya monene pe ya moke, ekokitisama. Esika ya matutú-matutú ekosembolama, pe esika ya mabúlú-mabúlú ekobongisama alima. [Yoane Mobatisi]

Malaki 3:1

Tala, nazali kotinda motindami na ngai [Yoane Mobatisi], pe akobongisa nzela liboso na ngai. Pe Nkolo oyo bozali kozela akoya pwasa na tempelo na ye, motindami ya kondimana, oyo bozali kosepela na ye, tala, akoya. Yawe na bibele alobi bongo.

Malaki 4:1-6

Mpo, tala, mokolo ezali koya, ezali kopela lokola litumbu ya móto [ekokisami naino te]; pe bato nyonso ya lolendo pe baoyo basalaka makambo ya mabe bakozala lokola matiti ya masangu. Pe mokolo oyo ezali koya ekozikisa bango, YAWE na bibele alobi bongo, pe yango ekotikela bango mosisa te, etape pe te.

Kasi epai na bino baoyo bobangaka nkombo na ngai, Moi ya boyengebene ekobima, ná kobikisa na mapapu na ye; bokobima mpenza pe bokopumbwa-pumbwa lokola bana-ngombe kati na lopango.

Pe bokonyata bato mabe, mpo bakokóma lokola putulú na nse ya makolo na bino, na mokolo oyo ngai nazali kobongisa, YAWE na bibele alobi bongo.

Bókanisa mobeko ya Mose mosaleli na ngai, oyo napesaki ye na Horebe mpo na Yisalaele mobimba, yango malako pe kosambisa-sembo.

Tala, nakotindela bino Eliya mosakoli liboso na koya ya mokolo monene pe ya nsomo ya YAWE.

Akozongisa mitema ya batata epai na bana [Yoane Mobatisi], pe mitema ya bana epai na batata na bango [Eliya ya mikolo oyo], ete naya pe nabeta mokili na ekweli mabe te.

Matai 11:10

Mpo na ye nde ekomámá ete, Tala, nazali kotinda motindami na ngai liboso na yo, pe akobongisa nzela na yo liboso na yo. [Malaki 3:1, Yoane Mobatisi]

Matai 11:14

Pe soki bolingi kondima yango, ye nde Eliya oyo asengelaki koya. [Yoane Mobatisi]

Matai 17:11-12

Ye ayanolaki ete, Ya solo, Eliya azali koya pe akobongisa makambo nyonso. [Eliya ya mikolo oyo]

Kasi nazali koloba na bino ete Eliya asílá koya pe bayebaki ye te, kasi basalaki ye makambo oyo balingaki. Ndenge moko pe Mwana ya moto asengeli komona mpasi na maboko na bango. [Yoane Mobatisi]

Luka 1:17

Lisusu, akotambola liboso na ye na molimo pe na nguya ya Eliya, mpo na kozongisa mitema ya batata epai ya bana, pe bato oyo bazanga botosi epai ya mayele ya bayengebene, mpo na kobongisela Nkolo bato oyo babongisami. [Yoane Mobatisi]