Genese 3:1
Nyoka alekaki nyama nyonso ya elanga na mayele mabe, oyo YAWE Nzambe asilaki kozalisa. Alobaki na mwasi ete, Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolia mbuma na nzete nyonso na elanga te?
Genese 3:6-7
Ntango mwasi amonaki ete nzete yango ezalaki malamu na kolia, pe ete ezalaki kitoko na miso pe ete nzete yango ezalaki malamu mpo na kozipola bososoli ya moto, akamataki mbuma yango, pe aliaki, pe apesaki na mobali na ye, oyo azalaki na ye elongo, ye pe aliaki.
Pe miso na bango mibale efungwamaki, pe bayebaki ete bazalaki bolumbu; batongaki nkasa ya mosuke, pe basalaki nkamba ya kolata.
Genese 3:14-15
Bongo YAWE Nzambe alobaki na nyoka, Lokola osali likambo oyo, olakelami mabe na kati ya banyama nyonso, pe nyama nyonso ya lisobe; okotambola na libumu na yo, pe okolia putulú mikolo nyonso na bomoi na yo.
Pe nakotia bongúná kati na yo ná mwasi, pe kati na momboto na yo ná momboto na ye; ye akopanza motó na yo, pe yo okozokisa ye na litindi.
Yango nde lisumu ya liboso oyo ekomami na Biblia. Nyama ya mayele mabe koleka, nyoka, “akosaki” Eva mpo ália eteni ya mbuma oyo epekisamaki. Aliaki yango, na sima apesaki yango na mobali na ye, yango nde ememaki bango kososola ete bazalaki bolumbu.
Mituna mpenza ya kotuna ezali: Ndenge nini nyoka akoki koloba? Likambo nini ezali kati na mbuma ya póme pe kozala bolumbu? Pe, momboto ya nyoka ezuami wapi kati na nyonso oyo?
Biblia elobi ete nyoka alekaki nyama nyonso ya elanga na “mayele mabe”. Azalaki mpenza lokola moto, pe akokaki kotambola, koloba, ata pe kosolola na mayele. Sima na ye kokosa mwasi ya Adama, Nzambe alakelaki ye mabe pe akómaki nyoka, kasi ezalaki te liboso na mabe kosalema pe momboto kolónama.
Biblia elobi, na Genese 3:15, ete nyoka azalaki na momboto, pe Nzambe atiaki koyinana kati na mimboto yango mibale. Na ntembe te, momboto ya nyoka esanganaki na momboto mpenza ya Eva liboso na bokabwani. Ndenge nini nyonso wana ekokaki kozala mbano ya kolia mbuma ya póme? Boye, biteni ya makomi sima na yango, “Adama apesaki mwasi na ye nkombo Eva; mpo azalaki mama ya baoyo nyonso bazali na bomoi.” Bótala malamu, elobi te ete Adama azalaki tata ya baoyo nyonso bazali na bomoi.
Na Biblia, “mbuma” ezali na lolenge mingi. Ya solo, mbuma mpenza ezali, lokola mbuma ya póme, oyo elónamaka pe eliámaka lokola bilei. Ezali pe na mbuma mosusu oyo eatlisaka misala na biso, ézala misala ya mokili lokola bilanga pe mombongo, to misala ya molimo lokola kosala bikamwa pe koteya Nsango Malamu. Na sima, ezali pe na mbuma ya libumu, elingi koloba kokumba zemi pe kobota mwana.
Kolia mbuma mpenza nde ekokaki kosala ete Adama ná Eva básosola ete bazalaki bolumbu? To, esengelaki ete mobali ná mwasi básangana na nzoto mpo básosola mpo na nini basengelaki kozipa biteni mosusu ya nzoto na bango?
Likambo nini mpenza esalemaki mokolo wana na Elanga mpo bato nyonso bábanda kokufa?
Ndenge moko Momboto ya mwasi ezalaki mpenza Nzambe Ye Moko amizalisaki kati na mosuni ya moto, momboto ya nyoka pe ezali nzela mpenza oyo Satana azuaki mpo ákoka komifungolela nzela ya koya kati na bato. Ekokaki kosalema te ete Satana (mpo azali bobele ekelamu ya molimo oyo EKELÁMÁ) ámizalisa na lolenge Nzambe Amizalisaki, boye lisolo ya Genese elobi ndenge abotaki momboto na ye pe amikotisaki to amitiaki kati na bato. Lisusu bóbosana te ete Satana abengami “nyoka”. Ezali momboto na ye to lolenge amikotisaki kati na baton de tozali kolobela.
Liboso ete Adama áyeba nzoto ya Eva, nyoka asilaki koyeba yango liboso na ye. Pe mwana oyo abotamaki na yango, ezalaki nde Kaina. Kaina autaki na (azalaki mwana ya) “Moto Mabe,” (I Yoane 3:12)
Solo na likambo yango ezali ete Eva azalaki na zemi ya bana mibali MIBALE (mapasa), oyo bautaki na bokutani EKESANI. Azalaki na zemi ya mapasa, oyo ya Kaina ezuamaki ntango moke liboso na oyo ya Abele.
Bisika ekomami
Genese 3:6-7
Ntango mwasi amonaki ete nzete yango ezalaki malamu na kolia, pe ete ezalaki kitoko na miso pe ete nzete yango ezalaki malamu mpo na kozipola bososoli na moto, akamataki mbuma yango, pe aliaki, pe apesaki na mobali na ye, oyo azalaki na ye elongo, ye pe aliaki.
Pe miso na bango mibale efungwamaki, pe bayebaki ete bazalaki bolumbu; batongaki nkasa ya mosuke, pe basalaki nkamba ya kolata.
[Bayebaki ndenge nini ete bakómi bolumbu sima na bango kolia eteni ya mbuma?]
Genese 3:13-15
YAWE Nzambe alobaki na mwasi, Osali bongo mpo na nini? Mwasi alobaki, Nyoka akosi ngai, pe nalei.
Bongo YAWE Nzambe alobaki na nyoka, Lokola osali likambo oyo, olakelami mabe na kati ya banyama nyonso, pe nyama nyonso ya lisobe; okotambola na libumu na yo, pe okolia putulú mikolo nyonso na bomoi na yo.
Pe nakotia bongúná kati na yo ná mwasi, pe kati na momboto na yo ná momboto na ye; ye akopanza motó na yo, pe yo okozokisa ye na litindi.
[Nyoka azalaki na momboto. Na ntembe te, yango ezalaki nyoka ya lelo te.]
Genese 3:20
Adama apesaki mwasi na ye nkombo Eva; mpo azalaki mama ya baoyo nyonso bazali na bomoi.
[Mpo na nini Adama abengami tata ya baoyo nyonso bazali na bomoi te?]
Genese 4:1-2
Adama ayebaki Eva mwasi na ye, pe ye azuaki zemi pe abotaki Kaina. Eva alobaki pe ete, Naboti mobali na lisalisi ya YAWE.
Abotaki lisusu ndeko na ye ya mobali, Abele. Abele azalaki mobateli na mpate, pe Kaina azalaki molóni ya bilanga.
[Bomoi nyonso eutaka na Nzambe, zemi yango ézala na libala to na makango. Satana akoki kokela bomoi te.]
Luke 3:38
Mwana ya Enosa, mwana ya Sete, mwana ya Adama, mwana ya Nzambe.
[Wapi mwana ya liboso, Kaina, na molongo ya Adama?]
I John 3:12
Ezali te lokola Kaina, oyo autaki na moto mabe pe abomaki ndeko na ye. Pe abomaki ye mpo na nini? Mpo misala na ye moko ezalaki mabe, kasi oyo ya ndeko na ye ezalaki ya boyengebene.
[Nzambe akelaki Adama na elilingi na Ye moko. Mabe ya Kaina eutaki wapi, pe boyengebene ya Abele eutaki wapi? Basangolaki misala na bango na batata na bango.]
Jude 1:14
Ee, moto ya nsambo sima na Adama, ye Enoka, asakolaki liboso mpo na bango ete, Nkolo asili koya na bibele na Babulami na ye.
[Esika moko te na Biblia Kaina azali na molongo ya Adama.]